Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Apr.
“Lokola bato bazali kobebisa zamba, mai, mpe mopɛpɛ, omituná naino te nini ekokómela mabelé? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo ya kolendisa. [Tángá Nzembo 104:5.] Na lisalisi ya Biblia, lisolo oyo emonisi ndenge oyo mabelé ekozala na mikolo ekoya.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Lamuká! Apr.
“Lokola makambo ya kosala ezali mingi, bato mingi bakokaka te komibombela ntango ya kosambela Nzambe. Yo mpe ozalaka na mokakatano yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baefese 5:15-17.] Lisolo oyo emonisi likanisi ya malamu oyo Biblia epesi na oyo etali ntango boni Nzambe alingaka tópesa ye mpe soki alingaka tósalela ye na makasi ya ndenge nini.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
“Bato mingi balobaka ete bandimaka kaka makambo oyo bamonaka na miso. Yo mpe okanisaka bongo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baloma 1:20.] Zulunalo oyo elobeli bizaleli misato ya Nzambe oyo tokoki komona polele na biloko oyo akelá mpe emonisi ndenge oyo koyeba bizaleli yango ekoki kosalisa biso.”
Lamuká! Mai
“Lelo oyo, bato mingi babangaka mikolo ekoya. Okanisi ete makambo ekobonga to ekobeba se kobeba? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Emoniseli 21:3, 4.] Zulunalo oyo elimboli ntina oyo tosengeli kotya motema ete mosika te Nzambe akosilisa mikakatano nyonso oyo bato bazali kokoka te kosilisa yango.”