Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tózongela bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Ntango tozali kozongela bango, mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola Biblia na baoyo babandi naino koyekola yango te. Yuni: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia.

◼ Kobanda na sanza ya Aprili, makarɔ mpo na liyangani ya etúká ya mobu 2008 ekotindama mbala moko na masangá nzela moko na mikanda mosusu. Ekozala na ntina te masangá esala komande na yango. Bosengeli kosala komande ya baetwi ya makarɔ mpo na basakoli nyonso oyo bazali na mposa na yango.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosɛnga baformilɛrɛ yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, liboso ya kotinda yango na biro ya filiale, bótala malamu soki batondisi yango nyonso.

◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadrɛsi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adrɛsi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá basengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29), kotya basinyatire na bango, mpe kotinda yango noki mpenza na biro ya filiale.

◼ Soki okosala mobembo na mboka mopaya mpe olingi koyangana na makita, na liyangani ya zongazonga, ya mokolo moko to ya etúká na mboka yango, osengeli kotuna makambo oyo etali dati, ngonga, mpe esika oyo yango ekosalema na biro ya filiale oyo etalelaka mosala ya kosakola na mboka yango. Baadresi ya babiro ya filiale etyami na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo.

◼ Mwa mbongwana oyo ekɔti na mayangani mosusu ya etúká ya mobu 2008: Na esika ete liyangani ya etúká (na Lingala) esalema na Basankusu, ekosalema nde na Boso Mbungeke (oyo ezalaká Ikeke) na boumeli ya mikolo misato, kobanda mwa 8 tii 10 Augusto 2008. Tolingi mpe koyebisa bino ete liyangani ya etúká ya mikolo mibale ekosalema na Bosondjo: 30-31 Augusto 2008.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto