Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Aprili 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Marsi tii na pɔsɔ ya 28 Aprili 2008.

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Mpo na nini tosengeli kosalela mokanda oyo batindi biso tósalela na lisolo na biso, mpe ndenge nini kosala yango? [be lok. 234 par. 1–lok. 235 par. 1]

2. Mpo na nini tosengeli kosalela mituna ntango tozali koteya? [be lok. 236 par. 1-5]

3. Ndenge nini mituna esalisaka bayoki bákanisa malamumalamu na likambo moko? [be lok. 237 par. 3–lok. 238 par. 1]

4. Ntango tozali koteya, ndenge nini tokoki kosalela malamu mituna mpo na kosalisa bayoki bábimisa makanisi oyo bazali na yango na motema? (Mas. 20:5; Mat. 16:​13-16; Yoa. 11:26) [be lok. 238 par. 3-5]

5. Mpo na nini tosengeli kosalela maloba ya kokokanisa makambo ntango tozali koteya? (Gen. 22:17; Yil. 13:11) [be lok. 240 par. 1-3]

LISOLO NO. 1

6. Wapi ndambo ya mitinda oyo ezali na mokanda ya Malako, oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé? [si lok. 186 par. 32]

7. Ndenge nini elimo santu esalisaka basaleli ya Nzambe lelo oyo? (Yoa. 14:​25, 26) [be lok. 19 par. 2-3]

8. Litomba nini ya monene koleka tokozwa soki toyebi kotánga? [be lok. 21 par. 3]

9. Koyekola esangisi makambo nini? [be lok. 27 par. 3–lok. 28 par. 1]

10. Ndenge nini Evanzile ya Luka esalisi biso tóndima ete Makomami ya Liebele epemamaki na Nzambe? [si lok. 192 par. 30-31]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Mpo na nini Yesu apamelaki moto moko oyo abengaki ye “Moteyi Malamu”? (Mko. 10:​17, 18) [w08 15/2 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Malako”]

12. Likambo nini etalaki ekólo Yisalaele Yesu alingaki kolobela ntango asalelaki elilingi ya nzete ya figi? (Mko. 11:​12-14, 20, 21) [w03 15/5 lok. 26 par. 2-3]

13. Anzelu Gabiliele alingaki koloba nini ntango alobaki ete Malia ‘akozwa zemi na matrisi na ye’ ntango elimo santu ya Nzambe ekoya likoló na ye mpe nguya ya Nzambe ekozipa ye? (Luka 1:​30, 31, 34, 35) [w08 15/3 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Luka”; it-2-F lok. 20 par. 3]

14. Bayekoli ya Yesu basalaki mpenza ‘likambo oyo epekisamaki na sabata’? (Luka 6:​1, 2) [gt 31]

15. Liteya nini tokoki kozwa na toli oyo Yesu apesaki Malata? (Luka 10:​40-42) [w99 1/9 lok. 31]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto