Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Marsi
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 2/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Febwali

Loyembo 168

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe Lamuká! ya Febwali.

Min. 15: Okoki kokende kosala esika mposa ya lisalisi ezali monene? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2003, lokasa 20. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Tobongisami, lokasa 111, paragrafe 1 tii na lokasa 112, paragrafe 1. Sololá na mokuse na ndeko nyonso oyo akendaki kosala esika mposa ya lisalisi ezali monene. Mikakatano nini bakutanaki na yango, mpe ndenge nini balongaki yango? Mapamboli nini bazwi?

Min. 20: Tósalisa basakoli ya sika bákóma baministre ya solosolo. Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, salelá mituna ya boyekoli mpo na kosala lisolo ya mituna mpe biyano na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2005, lokasa 31. Nsima ya kotalela paragrafe 18, salá elakiseli oyo ekomonisa mosakoli moko ya sika azali kosakola elongo na mosakoli moko ya kala, mpe moto moko atuni mosakoli ya sika motuna. Mosakoli ya sika apesi ye eyano mpenza ya malonga te, mpe moto yango akati lisolo. Nsima ya kotika ndako wana, mosakoli ya kala apesi mosakoli ya sika longonya mpo na milende oyo asalaki mpe amonisi ye ndenge akoki kosalela buku Comment raisonner mpo na koyanola na motuna ya ndenge wana na mbala ya nsima.

Loyembo 50

Pɔsɔ ebandi na 18 Febwali

Loyembo 17

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Elembo monene ya kondima!”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Na nsuka, lobelá makambo ya kolendisa etali mosala oyo lisangá esalaki na mbula ya mosala oyo eleki.

Loyembo 194

Pɔsɔ ebandi na 25 Febwali

Loyembo 81

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Febwali. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kopesa lokasa ya libyangi na Ekaniseli epai ya ndeko moko ya libota to moninga moko ya kartye.

Min. 20: “Tókanisa lisiko na botɔndi mpenza.”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo ya sika. Lisolo elongo na bayangani. Nsima ya kolobela na mokuse Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya Marsi, sɛngá bayangani bálobela masolo oyo bamoni ete ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bayangani bálobela makanisi oyo bamoni na masolo oyo bazali kokana kolakisa na mosala ya kosakola. Mituna nini bakoki kotuna moto mpo na kobanda lisolo? Bavɛrsɛ nini ya lisolo yango bakoki kotángela moto? Salelá makanisi oyo bapesi mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya Marsi.

Loyembo 119

Pɔsɔ ebandi na 3 Marsi

Loyembo 223

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo ya ntina oyo ezali na etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.”

Min. 20: Okoki nde kobanda koyekola na moto Biblia na sanza ya Marsi? Lisolo elongo na bayangani. Na sanza ya Marsi, tokolakisa buku Biblia eteyaka mpe tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Bótalela mwa makambo ya ntina ya buku yango. Bólobela ndenge oyo tokoki kolakisa buku yango ntango tozongeli moto moko oyo azwaki lokasa ya libyangi na Ekaniseli, to oyo totikelaki zulunalo moko, mpe ntango tokokabola yango na mosala ya ndako na ndako nsima ya mokolo ya 22 Marsi. (Talá km 8/07 lok. 3; km 3/06 lok. 1, par. 3; km 1/06 nk. 3-6.) Bósala mpe elakiseli moko to bilakiseli mibale.

Min. 15: Salelá Biblia mpo na kopesa biyano. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 143-144. Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosalela Biblia mpo na koyanola na motuna moko oyo bato batunaka mingi na teritware na bino.

Loyembo 145

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto