Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Yanuali 2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Desɛmbɛ

Loyembo 6

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya Desɛmbɛ.

Min. 20: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2008. Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lobelá makanisi oyo etali mpenza lisangá na bino, kati na makanisi oyo bapesi na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2007. Lobelá mokumba ya mopesi-toli mosungi. Lendisá moto nyonso ete asalaka makasi ya kosala masolo oyo azwaka, kopesa likanisi na lisolo ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, mpe kosalela toli oyo epesamaka pɔsɔ na pɔsɔ na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.

Min. 15: “Tóbɔndisa bato oyo batutami na mitema.”a Lobelá na mokuse ndakisa moko to mibale oyo esalemaki na lisangá na bino.

Loyembo 34

Pɔsɔ ebandi na 17 Desɛmbɛ

Loyembo 8

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani nyonso bátala video oyo ezali na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah : organisés pour prêcher la bonne nouvelle (Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu), mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 31 Desɛmbɛ.

Min. 15: “Tókoba kosakola na molende.”b Sololá na mosakoli moko oyo eyebani ete asakolaka na molende. Tuná ye boye: Makambo nini osalaki mpo osakolaka na molende? Nini esalisaka yo okoba kosakola na molende?

Min. 20: “Tókabola bazulunalo oyo epesaka litatoli na ntina etali solo.”c Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006 lokasa 8. Lendisá bayangani bátánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali. Sɛngá bango báya na yango na Likita ya mosala oyo ekolanda.

Loyembo 139

Pɔsɔ ebandi na 24 Desɛmbɛ

Loyembo 12

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yanuali, mpe salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa yango.

Min. 15: Omibongisa mpo na kolakisa bazulunalo ya sika. Lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali. Nsima ya kolobela na mokuse zulunalo mokomoko, tuná bayangani masolo nini ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bayangani bámonisa ndenge oyo bakani kolakisa masolo oyo baponi. Tokoki kotuna motuna nini mpo na kobanda lisolo? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango tokoki kotánga? Ndenge nini tokoki koyokanisa vɛrsɛ yango na lisolo? Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi to makanisi oyo bayangani bapesi mpo na komonisa ndenge ya kolakisa zulunalo mokomoko.

Min. 20: “Omityela mokano ya kobanda koyekola na moto Biblia.”d Sololá na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bauti kobanda koyekola na moto Biblia. Babandaki ndenge nini? Ndenge nini boyekoli yango ezali kokoba?

Loyembo 21

Pɔsɔ ebandi na 31 Desɛmbɛ

Loyembo 9

Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ.

Min. 15: Nguya ya ezaleli ya kokangama na Nzambe. Lisukulu ya kolendisa ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1990, nkasa 22-23.

Min. 25: “Kampanye monene ya kosakola oyo esalemá naino liboso te!”e Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bandeko to baninga na bango, bato oyo bazongelaka, to baoyo bayekolaka na bango Biblia, balobaki ntango batalaki video oyo ezali na motó ya likambo Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu (na Lifalanse).

Loyembo 202

Pɔsɔ ebandi na 7 Yanuali 2008

Loyembo 59

Liyebisi: Esengeli te kotalela lisolo oyo elobeli liyangani ya etúká liboso ya pɔsɔ ya 7 Yanuali. Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 7 Yanuali liboso ya dati yango, longolá kaka masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala yango.

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2008.”f Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Liboso ya kotalela makambo oyo ezali na siplema oyo, tángá mokanda ya biro ya 15 Novɛmbɛ 2007, oyo eyebisi liyangani ya etúká oyo bino bokokende. Ntango bokotalela paragrafe 6 ya siplema, tángá likanisi mokomoko oyo ezali na etanda ya lokasa 4 oyo elobi “Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa . . .” Pesá bayangani nyonso matɔndi ndenge bazali komibongisa libelalibela mpo na liyangani yango.

Loyembo 99

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto