Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 8 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ. Na elakiseli mokomoko, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.
Min. 20: Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 17.
Min. 15: “Lamuká! ya ntina mingi oyo tokolakisa na Novɛmbɛ!”a Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Lamuká! ya Novɛmbɛ (na Lifalanse). Na nsima, salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Ntango bokotalela paragrafe 3, salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya Novɛmbɛ. Liboso ya kosukisa elakiseli, lobelá likambo moko oyo ekopesa yo nzela ya kozongela moto oyo osololi na ye.
Pɔsɔ ebandi na 15 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mpe mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 20: Solo ezali kobota mbuma epai ya bato oyo oteyaka? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2005, nkasa 28-30. Lobelá mpe makanisi oyo emonisi ndenge mituna oyo ezali na buku Biblia eteyaka ebongisami mpo na kosalisa biso tóyeba makambo oyo ezali na motema ya moyekoli. Bótalela mwa bandakisa lokola oyo ezali na mokapo 1, paragrafe 19; mokapo 2, paragrafe 4; mokapo 3, paragrafe 24; mpe mokapo 4, paragrafe 18. Lendisá basakoli básalela malamu makambo ndenge na ndenge oyo ezali na buku yango.
Min. 15: Ozali komikundola? Lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2007, lokasa 19.
Pɔsɔ ebandi na 22 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya Novɛmbɛ.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Bókoba kotambola lokola bana ya pole. Lisukulu mpe mituna-lisolo. Tosili kolongwa na molili ya mokili oyo mpe tozali kotika ete pole ya Yehova etambwisa biso. (Ef. 5:8, 9) Yango esalisi biso tókóma na bomoi ya malamu mpe oyo ezali na ntina. (1 Tim. 4:8) Pole yango epesi biso mpe elikya. (Lom. 15:4) Sololá na basakoli mibale to misato oyo balongaki mikakatano makasi mpo bákóma na boyokani malamu elongo na Yehova mpe bábatela yango. Mikakatano nini bakutanaki na yango ntango babandaki koyekola mateya ya solo? Ndenge nini balongaki yango? Na ndenge nini sikoyo bomoi na bango ekómi malamu koleka? Nini esalisaka bango bápikama na kati ya solo? Mpo na kosukisa, lendisá bayangani nyonso bákoba kokola na elimo mpe komonisa ete basepelaka mingi na mateya ya solo oyo Yehova amonisi biso.—2 Pet. 1:5-8.
Pɔsɔ ebandi na 29 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Novɛmbɛ, mpe salá elakiseli ya lolenge moko ya kolakisa yango.
Min. 15: Omityela mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2004, nkasa 21-23. Sɛngá bayangani báyebisa mikano ya elimo oyo bamityeli mpe makambo oyo bazali kosala mpo na kokokisa yango. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale báyanola na motuna yango.
Min. 20: “Tósalisa babola bákóma na elikya.”b Ntango bokotalela paragrafe 2, lobelá mpe makanisi oyo ezali na Lamuká ya 8 Sɛtɛmbɛ 2003, nkasa 26-27 (na Lifalanse).
Pɔsɔ ebandi na 5 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Salelá bwanya ya Nzambe mpo na kobatela bana na yo. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2005, nkasa 23-27.
Min. 20: “Biso nyonso tolendisamaka.”c Sɛngá bayangani bálobela makambo mpenza oyo emonisi ndenge oyo mokɛngɛli-motamboli moko alendisaki bango ntango ayaki kotala lisangá. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale báyanola na motuna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.