Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/07 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 8/07 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Augusto

Loyembo 20

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto mpe Lamuká! ya Augusto. Na elakiseli moko, sɛngá mosakoli asalela makanisi oyo bapesi awa na Mosala na biso ya Bokonzi, na lokasa 3, paragrafe 3, mpo na kotuna moto motuna moko oyo akopesa eyano na yango ntango akozongela ye. Lobelá “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Pesá dati ya liyangani yango, soki eyebani.

Min. 15: Kotosa ebongiseli ya Teokrasi epesaka bolamu. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 15.

Min. 15: “Kosambela Yehova libota mobimba.”a Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwi ndenge basakolaka elongo na libota na bango. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale báyanola na motuna yango.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Augusto

Loyembo 100

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo,” mpe pesá dati na yango, soki eyebani.

Min. 15: Tóbanda koyekola na bato Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na bango, na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Lisolo elongo na bayangani. Na Sɛtɛmbɛ tokolakisa buku Biblia eteyaka mpe tokosala makasi tótalela mwa baparagrafe na yango elongo na moto, na mbala ya liboso oyo tokutani na ye. Lobelá makanisi oyo bapesaki na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006, mpe salá elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na ye.

Min. 20: “Ndenge oyo Boyekoli ya Mokanda ya lisangá esalisaka biso.”b Ntango bokotalela paragrafe 5, lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Tobongisami, lokasa 41, paragrafe 2.

Loyembo 6 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Augusto

Loyembo 98

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ.

Min. 10: ‘Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe.’ Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1994, nkasa 13-18.

Min. 25: “Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala.”c Sololá na ndeko moko to bandeko mibale oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi eleki mikolo mingi te. Mbongwana nini basalaki na programɛ na bango? Matomba nini bazwi? Soki likoki ezali, ekozala malamu moko ya bandeko yango azala ndeko moko oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo bato mosusu ya libota na ye bapesaki ye mabɔkɔ. Ntango bokotalela paragrafe 9, yebisá dati oyo mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá na bino, soki eyebani.

Loyembo 196 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 50

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mpe mayebisi oyo etali lisangá, oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto.

Min. 15: “Tosepelaka na mapamboli mpe mikumba oyo tozwi!”d Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Min. 20: “Ndenge ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo totikelaka bazulunalo.”e Salá mpe elakiseli moko na makanisi oyo bapesi na paragrafe 2. Kundwelá basakoli báyeba ete batángaka moto moyekoli ya Biblia soki toyekoli na ye mbala mibale nsima ya koyokana na ye mpe kolakisa ye ndenge boyekoli esalemaka, mpe soki tomoni ete moto yango akokoba koyekola.

Loyembo 2 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto