Manaka mpo na likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli.
Min. 15: Nini epesaka bolamu ya solosolo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2006, nkasa 28-29, paragrafe 11-12. Sololá na mokuse na ndeko moko oyo amipesi mobimba na mosala ya kosakola, na esika ya komipesa mingi na koluka bisengo to na mosala ya mosuni. Nini etindaki ye alanda mikano ya elimo? Ndenge nini yango epesi ye bolamu?
Min. 20: Biyano na mituna na bino. Ekosalema na nkulutu moko. Tángá mpe lobelá lisolo yango mobimba. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 22 Mai 2005, nkasa 13-14, na motó ya likambo moke “Les dangers de la tromperie et du secret” mpe “préférer le réel au virtuel.”
Loyembo 91 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, kobanda na lokasa 144 tii na motó ya likambo moke ya lokasa 150.
Min. 15: “Mbongwana kitoko oyo esalemi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli!”a
Loyembo 189 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya Augusto.
Min. 20: Bóyambanaka. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2005, nkasa 21-23. Sololá mpe na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bayebani ete bayambaka bapaya. Milende nini basalaka mpo báyambaka bapaya? Mapamboli nini bango moko mpe libota na bango bazwi na ndenge bayambaka bapaya?
Min. 15: Ndenge ya kobongisa maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi. Lisolo elongo na bayangani ekouta na mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lokasa 2, paragrafe 1-2 to buku Comment raisonner, lokasa 9, paragrafe 1-2. Salá mpe bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kokabola mikanda oyo tokolakisa na Augusto.
Loyembo 61 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli.
Min. 15: Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipimela. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2005, nkasa 8-9.
Min. 20: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama.”b Ntango bokotalela paragrafe 3, sɛngá bayangani báyebisa ndenge oyo kondima ya makasi esalisaki bango ntango bamekamaki na mbalakaka. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale báyanola na motuna yango.
Loyembo 13 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 6 Augusto
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala.”c Ntango bokotalela paragrafe 5, sɛngá bayangani oyo bazalaki liboso kotɛmɛla mateya ya solo to bazalaki kosepela na yango te, báyebisa makambo oyo etindaki bango básepela na solo.
Loyembo 211 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.