Manaka mpo na likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 11 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe Lamuká! ya Yuni.
Min. 15: Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2002, nkasa 24-28. Baklisto mosusu bakakatanaka mpo na koyekola Biblia na bato oyo basepeli, mpo bamonaka ete bakokoka te kotambwisa boyekoli ya Biblia. Nzokande, Yehova azali kosalela Liloba na ye, elimo santu na ye, mpe ebongiseli na ye, mpo na kobongisa biso na mosala na biso ya baministre. Mokano na biso ezali kaka te ya kotikela bato mikanda. Tosengeli kosala makasi tóteyaka bato. (Mat. 28:19, 20) Lendisá basakoli bámityela mokano ya kobanda koyekola na bato Biblia.
Min. 20: Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 13.
Loyembo 144 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 15: Ozali komikundola? Lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2007, lokasa 19.
Min. 20: “Tozali na esengo ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova!”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Okoki kokɔta na ‘ekuke monene oyo ezali komema na mosala’?”b Sololá na mokuse na mobongisi-nzela moko to babongisi-nzela mibale ya sanza na sanza. Mbongwana nini basalaki mpo na kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza? Mapamboli nini bazwi?
Loyembo 138 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 2 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Yuli, mpe salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa yango.
Min. 15: Litatoli ya libaku malamu—Lolenge ya ntina ya kosakola nsango malamu. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 101-102. Lobelá ndenge ekeseni ya kopesa litatoli ya libaku malamu, oyo ebongi na teritware na bino. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu.
Min. 20: “Tókoba ‘kobota mbuma mingi.’”c Ntango bokotalela paragrafe 4, lobelá mpe makanisi oyo ezali na etanda “Ndenge ya ‘kobota mbuma na koyika mpiko,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2003, lokasa 21.
Loyembo 69 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.