Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tokozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova, tósala makasi tólakisa bango buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Buku Créateur to Bolamu na libota.
◼ Kobanda na sanza ya Aprili, makarɔ mpo na liyangani ya etúká ya mobu 2007 ekotindama mbala moko na masangá nzela moko na mikanda mosusu. Ekozala na ntina te masangá esala komande na yango. Soki lisangá ezali na mposa bábakisela bango makarɔ, basengeli kosɛnga yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bosengeli kosala komande ya baetwi ya makarɔ mpo na basakoli nyonso oyo bazali na mposa na yango.
◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosɛnga formilɛrɛ S-205b na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, liboso ya kotinda yango na biro ya filiale, bótala malamu soki batondisi yango nyonso.
◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadrɛsi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adrɛsi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá basengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29), kotya basinyatire na bango, mpe kotinda yango noki mpenza na biro ya filiale.