Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/07 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 4/07 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Aprili 2007. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Marsi tii na pɔsɔ ya 30 Aprili 2007. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ndenge nini tokoki kosala ete plan na biso ezala na mindɔndɔ te? [be lok. 168 par. 4]

2. Tángá makambo minei oyo tokoki kosala mpo na kobimisa makanisi na molɔngɔ. [be lok. 170 par. 3–lok. 172 par. 4]

3. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopona oyo tokolobela na lisolo na biso? [be lok. 173 par. 2-3]

4. Wapi mwa matomba moto akoki kozwa soki azali koloba na maloba na ye moko? [be lok. 175 par. 3-5]

5. Mpo na nini koloba lokola ozali kosolola na moto ezali na ntina, mpe ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli yango? [be lok. 179 par. 4, etanda; lok. 180, etanda]

LISOLO NO. 1

6. Ndenge nini ndeko moko asengeli komibongisa soki bapesi ye lisolo ya makanisi ya ntina ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ? [be lok. 47 par. 3-4]

7. Likambo nini ezali na ntina mingi na mbeka ya Klisto koleka matomba oyo tozali kozwa na mbeka yango? [w05 1/11 lok. 14 par. 1]

8. Ndenge nini esengeli kosalela bavɛrsɛ oyo ezali na plan ya lisukulu? [be lok. 53 par. 1-2]

9. Yesu azalaki na mokano nini ntango azali koteya, mpe ndenge nini tokoki komekola ye? [be lok. 57 par. 1]

10. Mpo na nini koyeba kokesenisa makambo ezali na ntina mingi ntango moto azali koteya? [be lok. 57 par. 3-4]

BOTÁNGI YA BIBLIA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Na ndenge nini tokoki kosala makasi ete tólanda toli ya Yilimia 6:16 ya kotambola na “banzela ya kala, [mpe] ete nzela malamu ezali wapi”?

12. Mpo na nini Yehova aponaki nkɔngi mpo na koteya Bayuda oyo bazangaki sembo, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango? (Yil. 8:7)

13. Ndenge nini tokoki kosalela Yilimia 15:17 na likambo ya kominanola lelo oyo?

14. Na ndenge nini bato bazali lokola mabelé na mabɔkɔ ya Yehova, Mosali Monene ya mbɛki? (Yil. 18:5-11)

15. Ndenge bikólo elandani na molɔngɔ na Yilimia 25:17-26 ezali na ntina nini mpo na biso lelo oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto