Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32, na oyo batii na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza Yuni 2006. Sɛtɛmbɛ: Tokolakisa buku Biblia eteyaka. Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Tosengeli kozongela moto nyonso oyo totikelaki mokanda yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye mwa buku Bókɛngɛlaka! mpo na kosalisa ye asepela na Biblia lisusu koleka.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa mbongo mpo na kobongisa to kotonga Ndako ya Bokonzi, esengeli mpe kotalela yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2007, Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2007, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2007 na komande oyo bakosala mbala ekoya. Liste ya minɔkɔ oyo mikanda yango ekobima, ekotyama na “Avis à toutes les congrégations,” oyo etindamaka na masangá nyonso sanza na sanza.
◼ Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ 2006 ekozala na lisolo “Mozalisi azali mpenza?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso.