Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Augusto 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Yuli tii na pɔsɔ ya 28 Augusto 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ndenge nini kotala bato oyo bazali koyoka biso esalisaka biso tózala bateyi ya malamu mpenza? (Mat. 19:25, 26; Mis. 14:9, 10) [be lok. 124 par. 3–lok. 125 par. 3]
2. Mpo na nini ezali na ntina tólobaka ndenge tomeseni koloba, mpe nini ekoki kosalisa biso tósala bongo na mosala ya kosakola? [be lok. 128 par. 1-5, etanda]
3. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso tózalaka pɛto? [be lok. 131 par. 1-3]
4. Ndenge nini ezaleli ya “kolekisa ndelo te mpe makanisi malamu” esengeli kotinda biso tólata mpe tóbongisa nzoto na ndenge ebongi? (1 Tim. 2:9) [be lok. 131 par. 4–lok. 132 par. 1]
5. Mitinda nini ya Biblia tosengeli kotatela mpo na komindimisa ete ndenge tozali komonana na miso ya bato ezali komonisa te ete tolingi mokili? [be lok. 133 par. 2-3]
LISOLO NO. 1
6. Litomba nini ya monene koleka tokozwa soki toyebi kotánga? [be lok. 21 par. 3]
7. Nini emonisaka ete moto azali na bwanya to azali zoba? (Mas. 14:2) [w04 15/11 lok. 26 par. 5]
8. Mpo na nini ‘kozwa boyebi ezali likambo ya mpasi te mpo na moto ya bososoli’? (Mas. 14:6, NW) [w04 15/11 lok. 28 par. 4-5]
9. Koyekola ezali nini? [be lok. 27 par. 3]
10. Ndenge nini komanyola likoló na biloko oyo Yehova akelá ekoki kosalisa biso? [w04 15/11 lok. 8 par. 4]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Na ntango ya kala, ndenge nini Yehova ‘apesaki liloba,’ oyo esalaki ete limpinga monene ya “basi bápalanganisa nsango malamu,” mpe ndenge nini yango ezali kokokisama lelo oyo? (Nz. 68:11, NW)
12. Nini elingaki kotinda Asafa atika kosala oyo ezali sembo, mpe ndenge nini abongolaki makanisi na ye? (Nz. 73:2, 3, 17)
13. Mpo na nini mana oyo bazalaki kopesa Bayisalaele ebengamaki “mbuma ya likoló” mpe ‘mampa ya bato ya makasi’? (Nz. 78:24, 25, NW)
14. “Esika ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki ‘kofanda’ kuna? (Nz. 91:1, 2 NW)
15. Na ndenge nini liwa ya basaleli ya Yehova ya sembo ezali na motuya na miso na ye? (Nz. 116:15)