Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 8/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 14 Augusto

Loyembo 163

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo.” Pesá dati ya liyangani yango, soki eyebani. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto mpe Lamuká! ya Augusto. Na elakiseli moko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nasepelaka na ba Témoins de Jéhovah te.”​—Talá buku Comment raisonner, nk. 17-19, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nk. 9-10.

Min. 15: “Lamuká! ya ntina mingi oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ.”a Ntango bokotalela paragrafe 4, salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa elenge moko azali kolakisa molakisi na ye Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ.

Min. 15: Nakoki kokóma moninga ya motema ya bana-kelasi na biso? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Lamuká! ya Aprili, nkasa 17-19 (ya Lifalanse). Sɛngá bayangani, baoyo babɔkwamaki na baboti oyo bazali baklisto, bálobela ndenge oyo baboti na bango basalisaki bango báyeba mikakatano oyo bakoki kokutana na yango na eteyelo mpe bátosa mitinda ya Biblia. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale báyanola na motuna yango.

Loyembo 164 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 21 Augusto

Loyembo 62

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo,” mpe pesá dati ya liyangani yango, soki eyebani.

Min. 15: Tózwa matomba na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Likita ya bato nyonso. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, lokasa 59 tii na motó ya likambo moke ya lokasa 64.

Min. 20: Bandá komibongisa sikoyo mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lendisá bandeko bámityela mokano ya kozala mobongisi-nzela mosungi ata sanza moko, na mobu ya sika ya mosala. (1 Kol. 9:26) Basusu bakoki kopona sanza moko kati na oyo ebongiseli ya Yehova elendisaka biso tósakola mingi, to sanza oyo ezali na mokolo moko oyo bato bakendeke mosala te to oyo ezali na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo. Tuná bayangani boye: “Na bambula eleki, bosalaki nini mpo na kosilisa mikakatano, mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Mosala yango epesaka mapamboli nini? Soki ozali na mposa ya kosala yango, kasi ozali komona ete okokoka te, mpo na nini osengeli kobondela mpo na yango? (Mis. 4:29; 2 Kol. 4:7; Yak. 1:5) Mpo na nini ezali mpe malamu kosolola likambo yango na libota, mpe na bandeko mosusu ya lisangá, mingi mpenza baoyo bomoi na bango ekokani na oyo ya biso? (Mas. 15:22) Na sanza nini ozali kokanisa kozala mobongisi-nzela mosungi?”

Loyembo 216 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 28 Augusto

Loyembo 17

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ.

Min. 15: Okoki kolendisa basusu. (Lom. 1:11, 12) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Yebisá soki babongisi-nzela ya sanza na sanza bazali boni na lisangá na bino. Lobelá makambo oyo tokoki kosala mpo na kolendisa bango, na ndakisa, kopesa bango longonya, koloba malamu mpo na mosala ya mobongisi-nzela, kosakola elongo na bango, kokabola mwa bilei elongo na bango, mpe kosalisa bango na mbongo ya tike. Sɛngá babongisi-nzela ya sanza na sanza bálobela ndenge oyo basusu balendisaki bango. Soki lisangá ezali na babongisi-nzela ya sanza na sanza te, bólobela ndenge bokoki kosalisa bandeko oyo bazali babongisi-nzela mosungi.

Min. 20: Okoki kobanda koyekola na moto Biblia na sanza ya Sɛtɛmbɛ? Lisukulu mpe bilakiseli. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ, tokosala makasi tósalela buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bato Biblia, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Yango elingi koloba ete, soki topesi moto buku yango, tosengeli kosala makasi tótalela mwa baparagrafe elongo na ye. Salelá masolo oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá na bino. Salá bilakiseli mibale. Na bilakiseli nyonso mibale, monisá ndenge ya koyokana na moto mpo na kozongela ye mpe kokoba kosolola na ye.

Loyembo 37 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 4 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 90

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Monisá ete osepelaka na bato—Na kosakweláká bango kozanga kopona bilongi.”b Ntango bokolobela Baloma 1:14, oyo batye na nsuka ya paragrafe 2, lobelá mpe na mokuse makanisi oyo ezali na buku Étude perspicace, Volime 1, lokasa 270, na paragrafe ya liboso oyo ezali na nse ya motó ya likambo moke “Barbare.” Nsima ya kolobela paragrafe 3, zongelá makanisi misato oyo ezali na lokasa 2 ya mwa buku Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso (na Lifalanse); monisá mpe ndenge ya kosalela mwa buku yango epai ya bato ya teritware na bino oyo balobaka monɔkɔ mosusu. Monisá ndenge ya kosalela makambo yango na teritware na bino, na kotalela bamposa ya lisangá. Lisangá esengeli kozala na mikanda na minɔkɔ oyo elobamaka na teritware na bango, mpo basakoli básalelaka yango.

Loyembo 225 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto