Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Augusto
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 7/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Yuli

Loyembo 4

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli. Na elakiseli moko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Tozali baklisto.”​—Talá buku Comment raisonner, lok. 19, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lok. 11.

Min. 15: Ndenge oyo lisangá ebongisami mpe etambwisami. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 4.

Min. 20: “Salisá moyekoli asepela na bizaleli ya Yehova oyo eleki nyonso.”a Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kotuna moyekoli ya Biblia mituna mpo na kosalisa ye akanisa likoló ya makambo oyo ezali na etanda ya bozongeli, na nsuka ya mokapo 1 ya buku Biblia eteyaka.

Loyembo 88 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Yuli

Loyembo 99

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá na mokuse makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2000, lokasa 32. Monisá polele matomba ya kozala na programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, ata ntango tozwi konje to na ntango mosusu oyo tozali epai na biso te.

Min. 15: Mosala ya kosakola esɛngaka kozala na bolingo mpe na komikitisa. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2002, nkasa 18-20, paragrafe 13-20.

Min. 20: “Tólanda ndakisa ya Yehova, ‘Nzambe ya esengo.’”b Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo esalisaka bango bákoba kozala na esengo mpe na makanisi malamu ntango bazali kosakola na teritware ya lisangá na bino.

Loyembo 189 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Yuli

Loyembo 218

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya Augusto. Nsima ya elakiseli mokomoko, zongelá maloba ya ebandeli oyo mosakoli asalelaki mpo na kolamusa mposa ya moto oyo asololaki na ye.

Min. 10: “Bapesi biso ndakisa ya bosembo.” Lisukulu. Ndeko oyo akosala lisukulu yango akolobela mpe masolo ya babongisi-nzela monene oyo ezali na mikanda na biso, to akosolola na bandeko oyo bazali babongisi-nzela monene na lisangá na bino.​—Talá Index des publications Watch Tower, na motó ya likambo “pionniers spéciaux” (babongisi-nzela monene).

Min. 20: Bópikama makasi, bóninganaka te. (1 Kol. 15:58) Sololá na basakoli to babongisi-nzela mibale to misato, oyo bazali kosakola na bosembo mpenza banda bambula mingi. Ndenge nini bayebaki solo? Mosala ya kosakola ezalaki ndenge nini ntango bakómaki basakoli? Mikakatano nini bakutanaki na yango? Mapamboli nini bazwi ndenge bazali kokoba kopikama makasi na losambo ya solo?

Loyembo 12 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 31 Yuli

Loyembo 28

Min. 10:Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Augusto.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Zalá na mimeseno ya malamu mpo ozwa mapamboli mingi.”c Sɛngá bayangani bálobela milende oyo basalaka mpo na kozala na mimesemo ya malamu ya makambo ya elimo mpe kobatela yango. Bálobela mpe matomba oyo yango ememeli bango.

Loyembo 130 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 7 Augusto

Loyembo 209

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse ndenge tokoki koyokanisa maloba ya kobanda lisolo oyo bapesaka lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi, na makambo ya bato ya teritware na biso.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8.

Min. 15: Makita oyo elendisaka bolingo mpe misala ya malamu. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002, nkasa 24-25. Sololá mpe na mokuse na mosakoli moko, amonisa milende oyo asalaka mpo na koyangana na makita nyonso mpe matomba oyo yango ememeli ye.

Min. 20: Tóbongola mayele na biso mpe tómesana na makambo ya sika na mosala na biso ya kosakola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2005, nkasa 28-30. Salá lisukulu na paragrafe 6-11, monisá polele ndenge Paulo azalaki kotyela bato likebi, kotalela makanisi ya basusu, mpe kosalela mayele mingi ya koteya. Na nsima, sɛngá bayangani báyanola na mituna ya paragrafe 12-14, mpe bámonisa ndenge ya kosalela makambo yango na teritware ya lisangá na bino. Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge oyo basakoli bakoki koyokanisa maloba na bango ya kobanda lisolo na bamposa, bomoi, mpe mimeseno ya bato ya teritware ya lisangá na bino.

Loyembo 83 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto