Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokoki kolakisa bango buku Bolamu na libota. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Bókɛngɛlaka!, Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie ? Comment le découvrir ?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Sɛtɛmbɛ: Tokolakisa buku Biblia eteyaka. Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Tosengeli kozongela moto nyonso oyo totikelaki mokanda yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.
◼ Lokola sanza ya Yuli ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Kasɛti-video Les jeunes s’interrogent... Comment se faire de vrais amis ? (Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?), ekotalelama na likita moko ya mosala na Sɛtɛmbɛ. Soki olingi kozwa kasɛti-video yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.
◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2006 ekozala na lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (15 %) koleka ndenge bazwaka liboso.