Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/06 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 6/06 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Yuni 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Mai tii na pɔsɔ ya 26 Yuni 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Kobongola mongongo elimboli nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina? [be lok. 111, bitanda]

2. Ndenge nini tokoki koloba mwa malɛmbɛ to mwa mbangu ntango tozali kosala lisolo? [be lok. 112 par. 3-6, etanda]

3. Ndenge nini tokoki koloba na esengo ntango tozali kosala lisolo, mpe mpo na nini yango ezali na ntina? [be lok. 115 par. 1–lok. 116 par. 2, bitanda]

4. Mpo na nini ezali na ntina tólobaka na nsai ntango tozali koteya basusu, mpe nini ekoki kosalisa biso tósalaka yango? [be lok. 118 par. 2–lok. 119 par. 5]

5. Limbolá ntina oyo ebongi tósalaka bajɛstɛ mpe tósalelaka elongi ntango tozali kosolola. (Mat. 12:48, 49) [be lok. 121, bitanda]

LISOLO NO. 1

6. Ndenge nini mokanda ya Yobo ekumisaka Yehova mpe emonisaka polele mibeko oyo Yehova atyá na ntina na bomoi? [si lok. 100 par. 39, 41]

7. Makambo nini emonisi bosolo ya mokanda ya Nzembo? [si lok. 102 par. 10-11]

8. Maloba “moto ya mayele” oyo ezali na Masese 13:16 elimboli nini? [w04 15/7 lok. 28 par. 3-4]

9. Ndenge nini elimo santu esalaka lokola mosungi, mpe koyeba likambo yango esengeli kolendisa biso na kosala nini? (Yoa. 14:25, 26) [be lok. 19 par. 2-3]

10. Na ndimbola nini Yesu ayaki, mpe Yesu alobelaki “koya” nini na Matai 16:28? [w04 1/3 lok. 16 etanda]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo Yobo apesaki Yehova, oyo ezali na Yobo 42:1-6?

12. ‘Likambo ya mpambampamba’ nini bato ya bikólo bazali kokoba kolobaloba na mongongo ya nse? (Nz. 2:1, 2)

13. Miboko nini ebebisami? (Nz. 11:3, NW)

14. Ndenge nini moto ya nzombo, Nzambe ‘akozongisela ye mingi’? (Nz. 31:23)

15. Libɔndisi nini tokoki kozwa na Nzembo 40, oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano oyo euti na nzoto na biso ya kozanga kokoka mpe bampasi ndenge na ndenge ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? (Nz. 40:1, 2, 5, 12)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto