Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Yuli
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 6/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Yuni

Loyembo 218

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe Lamuká! ya Yuni. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli azali kolakisa zulunalo epai ya moto moko na litatoli ya libaku malamu.

Min. 20: “Mosala na biso ya kosakola emonisaka motema mawa.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.

Min. 15: Tótyela “moombo ya sembo mpe ya mayele” motema. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 3.

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Yuni

Loyembo 21

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 20: Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni! Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2006, nkasa 16-19. Na ebandeli, lobelá matomba minei oyo tokozwa soki topesaka basusu longonya, oyo balobeli na motó ya likambo moke “Matomba ya kopesa longonya.” Na nsima, sɛngá bayangani báyanola na mituna oyo elandi: Nani moto ya libosoliboso oyo abongi kozwa longonya? Mpo na nini ebongi mpenza tópesaka bandeko longonya oyo ebongi? Makambo nini epesaka biso nzela ya kopesa basusu longonya na lisangá? Mpo na nini ezali na ntina kopesaka bato ya libota na biso longonya, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? Osilá kolendisama to kozwa makasi mpo bapesaki yo longonya, ndenge nini?

Min. 15: “Monisá ete osepelaka na bato​—Na kopesáká bango longonya.”b Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli moko azali koyoka moto oyo azali kosolola na ye na likebi mpenza, apesi ye longonya ya solosolo, mpe na nsima atángeli ye vɛrsɛ moko oyo ebongi mpenza, na kotalela makambo oyo moto yango alobaki.

Loyembo 96 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Yuni

Loyembo 63

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli. Na nsuka ya elakiseli mokomoko, mosakoli akotuna motuna moko oyo akoyanola yango mbala ya nsima na lisalisi ya buku Biblia eteyaka.

Min. 15: Kosala na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2006, nkasa 17-20. Lobelá mpe makambo oyo ezali na buku Tobongisami, na lokasa 112, paragrafe 2. Monisá ndenge ya kosalela makambo yango na lisangá na bino. Okoki mpe kosolola na mokuse na ndeko moko to bandeko mibale oyo bazali koyekola monɔkɔ ya bapaya mpo na kosakola mingi.

Min. 15: Ndenge ya kosakola nsango malamu na Yuli. Makambo nini esepelisaka bato ya teritware na bino? Sololá na mokuse na mosakoli moko to basakoli mibale bálobela ndenge basalelaki malamu buku Biblia eteyaka mpe mbala mosusu ndenge babandi koyekola Biblia na moto moko. Na nsima, salá elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo ebimisaki matomba mpenza na teritware na bino, mpo na kokabola mikanda oyo tozali kolakisa na sanza oyo na mosala ya ndako na ndako.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8, par. 5.

Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Yuli

Loyembo 111

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni, soki bapesi yango naino te.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo.”c Sɛngá bilenge ya lisangá na bino bálobela mikano ya elimo oyo bazali na yango mpe nini bazali kosala mpo na kokokisa yango. Okoki kobongisa liboso mpenza mpo elenge moko to bilenge mibale báyanola na mituna yango.

Loyembo 30 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto