Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/06 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 5/06 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mai

“Okanisi ete okoki kofanda na esika lokola oyo balobeli na vɛrsɛ oyo? [Tángá 2 Petelo 3:13. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi soki likoló ya sika mpe mabelé ya sika ezali nini. Elobeli mpe ndenge oyo bomoi ekozala ntango mokano ya Nzambe mpo na mabelé ekokokisama.”

Lamuká! Mai

“Bato mosusu bakanisaka ete mpo na kozala malamu na mokili ya lelo, esengeli kozala moto ya matata. Kasi, talá oyo Yesu alobaki. [Tángá Matai 5:5, 9.] Ondimi likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli makambo misato ya malamu oyo tokozwa soki tozali bato ya kimya.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 28.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni

“Na bamboka mingi, ezalaki na ntango moko oyo bato bazalaki mpenza komemya mibange, ndenge tokoki komona yango na mobeko oyo ya kala. [Tángá Levitike 19:32.] Okanisi ete bato bamemyaka mibange kaka ndenge wana tii lelo? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge Nzambe atyelaka mibange likebi mpe ndenge oyo biso mpe tokoki kosala bongo.”

Lamuká! Yuni

“Bato ya mobulu oyo babomaka bato babandi lelo te. Kasi lelo oyo bakómi na mokili mobimba mpe bomoi ya moto nyonso ekómi na likama. Okanisi ete ezali bongo mpo na nini? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na ntango oyo bato yango bakozala lisusu te mpe ndenge Nzambe akotya kimya ya solo awa na mabelé.” Tángá Mika 4:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto