Ndakisa mpo na mikóló mpe bana
Noa azalaki mpenza moninga ya motema ya Yehova. Amipesaki bomoi na ye mobimba na kosala mokano ya Yehova. Noa ‘atambolaki elongo na Nzambe ya solo,’ mpe Nzambe apambolaki ye. Noa azali mpenza ndakisa oyo mikóló mpe bana basengeli kolanda. (Gen. 6:9) Kasɛti-video Noé: il marchait avec Dieu (Noa: Ye atambolaki elongo na Nzambe), ekosalisa yo omona na makanisi na yo bomoi oyo Noa azalaki na yango, mpo na nini ebongaki ete Yehova apambola ye, mpe ndenge nini tokoki kolanda bizaleli na ye ya malamu.
Lisolo ya Noa oyo batii na DVD ezali mpe na “mituna ya bozongeli.” Talá video yango mpe omituna boye: (1) Likambo nini ya mabe baanzelu mosusu basalaki, mpe Banefilime bazalaki banani? (Gen. 6:1, 2, 4) (2) Mpo na nini bato bakómaki kosala mabe mingi, mpe Nzambe akanisaki nini mpo na yango? (Gen. 6:4-6) (3) Noa akesanaki na bango na nini? (Gen. 6:22) (4) Ndenge nini bato mabe babomamaki? (Gen. 6:17) (5) Masuwa ezalaki monene ndenge nini? (Gen. 6:15) (6) Longola kotonga masuwa, Noa asalaki lisusu nini, mpe bato bandimelaki ye? (Mat. 24:38, 39; 2 Pet. 2:5) (7) Noa akɔtisaki nyama boni boni na masuwa? (Gen. 7:2, 3, 8, 9) (8) Mbula ebɛtaki mikolo boni, mpe mpela eumelaki mikolo boni? (Gen. 7:11, 12; 8:3, 4) (9) Mpo na nini Noa ná libota na ye babikaki? (Gen. 6:18, 22; 7:5) (10) Masuwa etɛlɛmaki wapi? (Gen. 8:4) (11) Ndenge nini Noa ayebaki ete mai ekauki mpo bábima na masuwa? (Gen. 8:6-12) (12) Noa asalaki nini ntango babimaki na masuwa? (Gen. 8:20-22) (13) Monama emonisaki nini? (Gen. 9:8-16) (14) ‘Kotambola elongo na Nzambe’ elimboli nini? (Gen. 6:9, 22; 7:5) (15) Tosengeli kosala nini soki tolingi komona Noa na Paladiso? (Mat. 28:19, 20; 1 Pet. 2:21)
Ndenge nini lisolo ya Biblia oyo elobeli bosembo ya Noa esalisi yo mpe ‘otambola elongo na Nzambe’ mpe ondima mpenza ete Yehova akoki kobikisa basaleli na ye ya mikolo na biso?—Gen. 7:1; Mas. 10:16; Ebe. 11:7; 2 Pet. 2:9.