Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/06 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 5/06 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tólakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na bibongiseli mosusu ya Teokrasi, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Tósala makasi tóbanda koyekola na bango Biblia na buku yango. Yuni: Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, bokoki kolakisa bango buku Bolamu na libota. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Bókɛngɛlaka!, Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.”

◼ Lokola sanza ya Yuli ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa mbongo mpo na kobongisa to kotonga Ndako ya Bokonzi, esengeli mpe kotalela yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, liboso ya kotinda yango na biro bótala malamu soki batondisi yango nyonso.

◼ Ezali malamu bankulutu bátindelaka biro baformilɛrɛ oyo bandeko bazali kotondisa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mikolo 30 liboso ya mokolo oyo ndeko alingi kobanda mosala yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kotala malamumalamu soki bandeko batondisi yango nyonso. Soki ndeko azali koyeba lisusu te dati oyo azwaki batisimo, akoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te na dati oyo azwaki batisimo mpe kobatela yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma dati yango na karte ya mosakoli (Activité du proclamateur [S-21]).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto