Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 8 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai mpe Lamuká! ya Mai. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli azali kopesa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai, ya 15 Mai, mpe Lamuká! ya Mai epai ya moto moko oyo ye atikelaka bazulunalo mbala na mbala, oyo azwaki naino te Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai. Atako akopesa ye bazulunalo misato, akolobela kaka zulunalo moko. Basakoli bakoki kozongela bato oyo bango batikelaka bazulunalo mbala na mbala, ata mbala moko to mbala mibale na sanza.
Min. 20: “Landá ngai ntango nyonso.”a Sololá na mokuse na mosakoli moko oyo azali ndakisa malamu, oyo asalaka makasi azala na bomoi ya mindɔndɔ te mpe amipesaka mingi te na koluka bolamu na ye moko mpo azala na ntango ya komipesa na misala ya Bokonzi mpe kosalela basusu. Lobelá matomba oyo azwaka ndenge asalaka bongo.
Min. 15: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela mapamboli oyo bazwi ndenge bamipesaki mingi na mosala ya kosakola na sanza ya Marsi mpe Aprili. Lobelá matomba oyo bazwi, na ndakisa ndenge oyo babandi koyekola na bato Biblia mpe basalisi bato ya sika báyangana na Ekaniseli. Bokoki kosala elakiseli moko to bilakiseli mibale ya makambo yango ndenge elekaki.
Loyembo 91 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 15 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lendisá bayangani nyonso bátala kasɛti-video Noé: il marchait avec Dieu (Noa: Ye atambolaki elongo na Nzambe), mpo na kobongisa Likita ya Mosala oyo ekosalema na pɔsɔ ya 29 Mai.
Min. 10: Tósala na bomoko wana tozali kotosa bokonzi ya Klisto. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, na nkasa 13-15, na motó ya likambo moke “Kondima mokumba na ye elimboli nini?”
Min. 25: “Misala ya kotonga na filiale—Eteni ya ntina mingi ya mosala ya bosantu.”b Sololá na mwa bandeko oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga to kobongisa Bandako ya Bokonzi to na misala mosusu ya kotonga oyo biro etambwisaki.
Loyembo 133 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 22 Mai
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe Lamuká! ya Yuni. Bilakiseli yango ekomonisa libota moko bazali komekameka ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.
Min. 15: “Monisá ete osepelaka na bato—Na komityáká na esika na bango.”c
Min. 18: Ndenge ozali komonana na miso ya bato. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 131-133. Lobelá mitinda mitano oyo etali elateli mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto. Monisá ete tokoki kosalela mitinda yango na mayele mpo na kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia báyeba molato oyo ebongi koya na yango na makita.
Loyembo 215 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 29 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai.
Min. 10: Tokolakisa buku Moteyi na Yuni. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 3-4 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki ntango basalelaki buku yango na mosala ya kosakola to na mabota na bango moko.
Min. 25: “Ndakisa mpo na mikóló mpe bana.” Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, salelá mituna oyo ezali na paragrafe ya mibale mpo na kobanda mbala moko lisolo elongo na bayangani na kasɛti-video Noa. Na nsima, tuná baboti ná bana bálobela matomba oyo bazwi ndenge basalaki “devuare” oyo ezali na DVD. Na nsima, bólobela mituna mpe bavɛrsɛ oyo ezali na paragrafe ya misato. Soki bozali na DVD te, bósalela Biblia mpo na koyanola na mituna yango.
Loyembo 9 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 5 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Ndenge malamu ya kozongela bato oyo basepelaki. Lisolo elongo na bayangani ekouta na etanda ya lokasa 16 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2003. Talelá likanisi mokomoko kati na makanisi nsambo oyo bapesi, mpe sɛngá bayangani bálobela ndenge ya kosalela makanisi yango na teritware ya lisangá na bino. Lendisá basakoli nyonso ete ntango bazali kozongela moto nyonso oyo azwaki mikanda to oyo asepelaki na nsango malamu, basengeli kosala makasi bábanda koyekola na ye Biblia. Salelá moko ya makanisi oyo bapesi na lokasa 6 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006, mpo na komonisa ndenge ya kosɛnga moto bóbanda koyekola na ye Biblia ntango ozongeli ye.
Loyembo 57 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.