Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tólakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli mpe/to na bibongiseli mosusu ya Teokrasi, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Bósala makasi bóbanda koyekola na bango Biblia na buku yango. Yuni: Buku Yekolá epai ya Moteyi monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, bokoki kolakisa bango buku Bolamu na libota.
◼ Kobanda na sanza ya Aprili, makarɔ mpo na liyangani ya etúká ya mobu 2006 ekotindama mbala moko na masangá nzela moko na mikanda mosusu. Ekozala na ntina te masangá esala komande na yango, longola kaka soki bazali na etuluku moko oyo esalaka makita na monɔkɔ ya bapaya. Soki lisangá ezali na mposa bábakisela bango makarɔ, basengeli kosɛnga yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bosengeli kosala komande ya baetwi ya makarɔ mpo na basakoli nyonso oyo bazali na mposa na yango.
◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadrɛsi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adrɛsi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29) mpe bakotinda formilɛrɛ yango noki mpenza na biro ya filiale.
◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2006 ekozala na lisolo “Oyebaka mpenza kosolola?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10%) koleka ndenge bazwaka liboso.