Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 24 Aprili 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 6 Marsi tii na pɔsɔ ya 24 Aprili 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ntango tozali koteya, mpo na nini tosengeli kopemaka liboso ya koleka na likanisi mosusu, mpe nini ekoki kopekisa biso kosala bongo? [be lok. 98 par. 3-4]
2. Mpo na nini ezali na ntina tópemaka ntango tozali kopesa basusu litatoli? [be lok. 99 par. 5–lok. 100 par. 4]
3. Ntango tozali kosala lisukulu, mpo na nini ezali na ntina tónyataka maloba ya ntina, mpe nini ekoki kosalisa biso tóyeba konyata maloba ya ntina? [be lok. 101 par. 1-5, etanda]
4. Ntango tozali kotánga liboso ya bato mingi, ndenge nini tokoki koyeba soki tozali mpenza konyata makanisi ya ntina ya makambo oyo tozali kotánga? [be lok. 105 par. 1-6]
5. Ntango tozali koteya, mpo na nini tosengeli kolobaka na mongongo oyo ebongi, mpe ndenge nini tokoki koyeba soki tozali koloba na mongongo oyo ebongi? [be nk. 107-108]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini makambo oyo ezali kokómela baklisto lelo oyo ekokani na oyo ekómelaki Esetele ná Moledekai, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango? [si lok. 94 par. 17]
7. Salomo azalaki kolobela nini ntango alobaki ete “nyonso ezalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ”? (Mos. 2:11) [w04 15/10 lok. 4 par. 3-4]
8. Ndenge nini tokoki kolona ezaleli ya kolinga Nzambe? (Mko 12:30) [w04 1/3 nk. 19-21]
9. Bokeseni nini ezali kati na bozwi ya elimo mpe mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili? [w04 15/10 nk. 5-7]
10. Nini ekoki kosalisa biso tóyoka na likebi mpenza na mayangani ya mike mpe ya minene? [be nk. 15-16]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Mpo na nini elongi ya Hamana ezipamaki? (Esetele 7:8)
12. Ekelamu nini ya elimo epesaki Elifaza makanisi oyo azalaki kobimisa? (Yobo 4:15, 16) [w05 15/9 lok. 26 par. 2]
13. Maloba ya Yobo oyo ezali na Yobo 7:9, 10 mpe Yobo 10:21 emonisi ete azalaki kondima lisekwa te?
14. Ekoki kozala ete Yobo alingaki koloba nini mpenza ntango alobaki ete “nabiki bobele na loposo ya mino na ngai”? (Yobo 19:20)
15. Yobo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “Nakomilongwela sembo na ngai te,” mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? (Yobo 27:5)