Manaka mpo na likita ya mosala
Liyebisi: Na sanza ya Yuli, ya Augusto mpe ya Sɛtɛmbɛ, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya Likita ya Mosala kaka ndenge ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” Soki ebongi, na Likita ya Mosala oyo bokosala liboso bókende na liyangani, bósalela miniti 15 mpo na kolobela toli ya siplema ya sanza oyo ya Aprili, oyo etali mpenza bino. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, bózwa miniti 15 to 20 na Likita ya Mosala (mbala mosusu na lisolo oyo esengeli kotalela bamposa ya lisangá) mpo na kozongela makanisi ya ntina ya liyangani. Yango ezali bozongeli ya programɛ mobimba ya liyangani te. Na esika ya kosala bongo, bólobela kaka masolo oyo etali mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani bálobela ndenge bazali kosalela makambo yango na mosala ya kosakola.
Pɔsɔ ebandi na 10 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli azali kolakisa buku Biblia eteyaka epai ya moto moko oyo asepeli mpenza na nsango ya Biblia.
Min 15: “Ndenge ya kokoba kozala na molende.”a Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2002, lokasa 14, paragrafe 13.
Min 20: “Okoki kobongola programɛ na yo?”b Monisá ndenge ya kosalela makambo yango na teritware na bino. Lobelá bibongiseli nyonso oyo lisangá ezwi mpo na kosakola na mpokwa.
Loyembo 13 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Aprili
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na lisukulu ya bato nyonso oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli. Lendisá basakoli nyonso básalela lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpo na kobengisa bato oyo bayanganaki na Ekaniseli, bayekoli ya Biblia, mpe bato mosusu oyo basepeli. Lobelá na mokuse makambo ya kolendisa mibale to misato oyo basakoli bakutanaki na yango ntango basalelaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kobenga bato na lisukulu ya bato nyonso oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli.
Min. 12: Bamposa ya lisangá.
Min. 18: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia oyo ekobota mbuma, na porte ya moto mpe na telefone.”c Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa oyo mosakoli akoki koloba mpo na kotika koyekola na moto na porte mpe kobanda koyekola na ye na kati ya ndako to na esika mosusu oyo ebongi.
Loyembo 162 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Aprili
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Na sanza ya Mai tokokoba kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya Mai. Nsima ya bilakiseli, bendá likebi ya bayangani na masolo mosusu oyo ezali na bazulunalo yango oyo ekoki kosepelisa bato ya teritware na bino.
Min. 30: “Kobá kozela Yehova.”d Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Yebisá esika oyo lisangá na bino ekokende na liyangani. Sɛngá bayangani bámonisa ndenge kolata makarɔ ntango nyonso na engumba oyo liyangani ekosalema ekoki kopesa biso libaku ya kopesa litatoli.
Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 1 Mai
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Bólobela etanda “Otunaka bayekoli soki bayebi bato mosusu oyo bakondima koyekola?,” oyo ezali na lokasa 6.
Min. 10: “Monisá ete osepelaka na bato—Na kotaláká bango na miso.”e Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa ndenge mosakoli azali kotala moto na miso na esika oyo bato bazali mingi, abandi kosolola na ye, mpe na nsima apesi ye litatoli.
Min. 15: Manyolá likoló ya misala ya Yehova. (Nz. 77:12) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekolobela Annuaire 2006. Lobelá lisusu makanisi ya kolendisa oyo ezali na mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (nk. 3-5; talá mpe km 3/06) Botalela makambo oyo ezali na motó ya likambo moke “La traduction de la Bible.” (nk. 10-11) Lobelá makambo mosusu ya ntina mpe oyo bandeko bakutanaki na yango na mbula eleki. (nk. 6-64) Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo basepelaki na yango ntango batángaki Annuaire 2005, soki Annuaire 2006 ezali te. Lendisá bayangani nyonso básalela yango mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia básepela na ebongiseli ya Yehova.
Min. 15: “Kampanye oyo ekosalema na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na liyangani ya etúká ‘Lobiko ekómi pene!’”f Bótánga baparagrafe nyonso.
Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.