Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-bakambi
“BOBOTO monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Klisto ezala na bino.” Maloba oyo ezali mbote oyo Paulo azalaki kopesa na mikanda mingi oyo akomelaki masangá. Maloba yango ezali mpenza komonisa oyo tozali kokanisa mpo na bino.—Ef. 1:2.
Tozali mpenza na botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova oyo emonisami na mbeka ya lisiko ya Klisto Yesu! Lisiko epesi biso nzela ete Nzambe andima biso. Nzambe akokaki soki moke te kondima biso mpo na milende na biso moko, ata soki toyekolaka Biblia na molende, tosakolaka nsango malamu, to tosalaka makambo mosusu ya malamu. Soki Yehova azali kolimbisa masumu na biso mpe akanisi kopesa biso bomoi ya seko, ezali te mpo na kofuta biso mpo na milende oyo tosalaka, kasi ezali likabo oyo ezali komonisa boboto monene na ye na nzela ya Yesu Klisto.—Lom. 11:6.
Paulo akomelaki bandeko na ye baklisto boye: “Biso . . . tozali kobondela bino ete bóyamba te boboto monene ya Nzambe mpo na kozanga kokokisa mokano na yango. Mpo azali koloba ete: ‘Na ntango moko oyo endimami nayokaki yo, mpe na mokolo moko ya lobiko nasalisaki yo.’ Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.” Ezalaki na ‘ntango moko oyo endimamaki,’ liboso ete Yelusaleme ebebisama na ekeke ya liboso. Bato ya mitema sembo oyo balingaki Yehova babikaki na elimo. Nsukansuka, yango esalaki ete bato nyonso ya sembo oyo bakimaki Yelusaleme liboso ete ebomama na mobu 70 T.B., bábikisa bomoi na bango.—2 Kol. 6:1, 2.
Lelo oyo, biso mpe tozali kobika na “ntango oyo endimami” mpe na “mokolo ya lobiko.” Baoyo Yehova andimi bango lokola basaleli na ye mpe babikisami na elimo, bazali na elikya ya kobika na “mokolo monene ya Yehova” oyo ekómi pene.—Sef. 1:14.
Koya ya mokolo ya Yehova epesi biso mokumba moko monene. Tosengeli kokebisa bato mpo na mokolo yango mpe kosalisa bato ya mitema sembo bázwa litomba na boboto monene ya Yehova mpo bango mpe bábika. Paulo azalaki kozwa mokumba wana na lisɛki te. Akomaki boye: “Mawa na ngai soki nasakoli te nsango malamu!” Alobelaki mpe ndenge oyo azalaki komiyoka na maloba oyo: “Ezala epai ya Bagrɛki mpe Babarbare, ezala epai ya bato ya bwanya mpe bazoba nazali na nyongo: bongo nazali na mposa moko makasi ya kosakola nsango malamu.”—1 Kol. 9:16; Lom. 1:14, 15.
Soki tozali kozwa na lisɛki mosala ya kokebisa bato oyo ekobikisa bomoi, tokozongisa monɔkɔ epai na Yehova. Toyebi oyo Yehova ayebisaki mosakoli Ezekiele: “Mwana na moto, nasili kozalisa yo mokɛngɛli mpo na ndako na Yisalaele. Yango wana oyoka liloba na monɔkɔ na ngai, mpe okebisa bango na nkombo na ngai. Soki nalobi na moto mabe ete, Okokufa solo; mpe yo okebisi ye te, mpe olobi mpe te na ntina na kokebisa moto mabe mpo na nzela mabe na ye, ete obikisa bomoi na ye; mbɛlɛ moto yango akokufa na lisumu na ye, nde nakotuna makila na ye na lobɔkɔ na yo.”—Ezek. 3:17, 18.
Na mikolo oyo ya nsuka tozali kokutana na mikakatano mingi. Ezali pɛtɛɛ te kokokisa mbala moko makambo etali libota, mosala, lisangá, mpe kosakola. Lisusu, mingi na bino batungisamaka na maladi, na makanisi, na bobange, mpe ata mpo na botɛmɛli. Mingi kati na bino bozali “kokumbisama mikumba.” Tolingi koyebisa bino ete tozali mpenza komitya na esika na bino, na boyokani na maloba oyo ya Yesu: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Tolingi kopesa longonya mpenza na bino nyonso oyo bozali kosala milende mpo na kokoba kosalela Yehova na bosembo mpenza, ezala na mikakatano ya minene to ya mike.
Soki na mokili mobimba, bato pene na 4762 bazali kozwa batisimo pɔsɔ na pɔsɔ, ezali mpo na milende oyo bozali kosala na mosala ya kosakola mpe ya koteya bato, mpe mpo na lipamboli ya Yehova. Na mobu ya mosala oyo eleki, masangá ya sika 1 375 esalemaki. Tozali na elikya mpe tozali kobondela ete buku ya sika Biblia eteyaka mpenza nini?, oyo esili kobima na minɔkɔ koleka 120, ekosalisa bamilio ya bato bázwa litomba na boboto monene mpe kimya ya Yehova na boumeli ya ‘mokolo oyo ya lobiko.’
Bóyeba ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi balingaka bino mpe babondelaka mpo na bino. Tozali mpe kotɔnda bino mpo na mabɔndeli oyo bozali kosala mpo na biso.
Bandeko na bino,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova