Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Buku ya sika, Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tólakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli mpe/to na bibongiseli mosusu ya Teokrasi, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Bósala makasi bóbanda koyekola na bango Biblia na buku yango. Yuni: Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa bango buku Bolamu na libota.
◼ Lokola sanza ya Aprili ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya misato, 12 Aprili 2006. Soki lisangá na bino esalaka makita mokolo ya misato, makita yango esengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki bokoki kosala bongo te mpe likoki ya kosala Likita na bino ya Mosala ezali te, bokoki kokɔtisa masolo ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino, na programɛ ya Likita mosusu ya Mosala.
◼ Masangá basengeli kokabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya sika mbala moko ntango bazwi yango. Yango ekosala ete basakoli báyeba makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango liboso ya kokende kolakisa yango na mosala ya kosakola. Basengeli mpe kopesa basakoli Mosala na biso ya Bokonzi mbala moko ntango bazwi yango. Bakoki mpe kokabola yango na bituluku ya boyekoli ya mokanda.
◼ Kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu (Noa—Ye atambolaki elongo na Nzambe) ekotalelama na Likita moko ya mosala na sanza ya Mai. Soki olingi kozwa kasɛti video yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.
◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda ete báyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda nini oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.
◼ Eteyelo ya babongisi-nzela ya mbala oyo ekosalema na boumeli ya mikolo 10 oyo ekolanda liyangani ya etúká, kobanda na Mwamitano tii na Mwalomingo, na mboka oyo liyangani ekosalema. Tokosalela buku ya sika ya Lifalanse, Lingala, Swahili mpe Tshiluba. Bandeko oyo bakobenga bango na eteyelo yango ezali babongisi-nzela ya sanza na sanza oyo bakɔtá naino eteyelo yango te, mpe baoyo babandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mokolo ya 1 Augusto 2005 to liboso ya dati wana, bakisá mpe baoyo bakɔtá eteyelo yango kasi basali mbula 15 to koleka na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Biro ekoyebisa mobongisi-nzela mokomoko oyo likambo yango etali ye.