Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 6 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi mpe Lamuká! ya Marsi. Na nsuka ya elakiseli mokomoko, mosakoli akosalela libyangi oyo ezali na lokasa ya nsuka ya zulunalo oyo akolakisa mpo na kobenga moto yango na Ekaniseli.
Min. 15: “Salisá basusu bázwa litomba na lisiko.”a Lisolo oyo ekosalema nsima ya lisolo oyo ekolobela makambo mosusu etali ndenge ya kosalela buku Biblia eteyaka, nkasa 206-208, ntango tozali kobenga bato na Ekaniseli.
Min. 20: Bolei ya Mpokwa ya Nkolo—Molulu oyo ekumisaka Nzambe. Lisolo ya mituna mpe biyano ekouta na buku Biblia eteyaka, nkasa 206-208. Na maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, monisá ndenge tokoki kotánga paragrafe ya liboso mpo na kobanda lisolo na moto. Na nsima, sɛngá bayangani báyanola na mituna oyo kozanga ete bótánga baparagrafe: (par. 2) Ntango nini Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye? (par. 3) Esengeli kosala Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mbala boni na mbula? (par. 4) Ndenge nini Biblia elimboli ndenge Ekaniseli esalemaki? (par. 5) Ndenge nini toyebi ete Yesu akómisaki limpa mosuni na ye te mpe vinyo makila na ye te? (par. 6) Limpa oyo batyá levire te elakisi nini? (par. 7) Vinyo ya motane elakisi nini? (par. 8) Banani kaka basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo? (par. 9) Ntango nini Ekaniseli esalemaka mbula na mbula, mpe mpo na nini tosengeli koyanganaka na Ekaniseli? Soki ngonga ezali, bólobela bavɛrsɛ ya ntina. Lendisá basakoli nyonso bátalela makambo oyo elongo na bato oyo bayekolaka na bango Biblia mpe bato oyo bakobengisa na Ekaniseli, bátánga baparagrafe, bálobela makanisi ya ntina, mpe bátuna mituna ya pɛtɛɛ lokola oyo ezali awa.
Loyembo 134 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina ya etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.”
Min. 23: Mokumba oyo Nzambe apesi Klisto. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 10-13. Ntango bokolobela paragrafe mibale ya liboso oyo ezali na motó ya likambo moke “Mokumba ya Klisto ezali nini?,” zwá miniti misato to minei mpo na kolobela mpe kosala elakiseli mpo na ndenge ya kosalela nkasa ya libyangi ya Ekaniseli. Lobelá makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2006, lokasa 3, paragrafe 3.
Min. 12: Tozwaka makasi ntango totángaka Makomami mokolo na mokolo. Lisukulu mpe elakiseli ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2006. Bongisá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge libota moko bazali kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango.
Loyembo 103 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Marsi
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 6 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili. Monisá mpe ndenge ya kosalela nkasa ya libyangi mpo na kobenga bato oyo basepelaka na nsango malamu na Ekaniseli.
Min. 10: Nzambe azali kaka kotambwisa makambo awa na mabelé? Lisukulu mpe elakiseli ekouta na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2006. Salelá mabaku nyonso oyo okozwa mpo na kobenga bato na lisukulu ya ntina mingi. Salá makasi obenga moto nyonso oyo oyekolaka na ye Biblia, bakisá mpe bato ya libota na ye oyo bayekolaka Biblia te. Tosengeli mpenza kobenga bato nyonso oyo toyebi ete basepelaka na nsango malamu mpe bato mosusu oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili ntango tozali kobengisa moto moko oyo atiká kosakola to oyo atiká koyangana na makita.
Min. 20: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango balakisaki buku Biblia eteyaka na sanza ya Marsi. Bálobela mpe ndenge babandi koyekola na bato mosusu Biblia. Bokoki kosala elakiseli moko to bilakiseli mibale ya makambo yango ndenge elekaki.
Loyembo 170 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Aprili
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse lisolo “Tósepela koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?,” oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2006, lokasa 6. Bendá likebi ya bayangani na manaka ya boyekoli ya buku Biblia eteyaka. Monisá mpe ndenge ya kosalela nkasa ya libyangi mpo na kobenga bato oyo basepelaki na nsango malamu na Ekaniseli.
Min. 10: “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.” Bótánga mpe bólobela mokanda oyo euti na Annuaire 2006. Nsima ya kotánga paragrafe mokomoko, nkulutu oyo akosala lisolo yango akotuna mituna oyo abongisi malamu mpo na kobimisa polele makanisi ya ntina.
Min. 20: “Teyá bato ya komikitisa bátambola na nzela ya Nzambe.”b Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2004, lokasa 16, paragrafe 9.
Loyembo 93 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.