Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 12 Sɛtɛmbɛ
Loyembo 29
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Sɛngá nkulutu moko asala elakiseli moko mpe elenge moko asala elakiseli mosusu. Nsima ya elakiseli mokomoko, lobelá bisika oyo esalemi malamu.
Min. 20: “Salelá ntango na yo na mayele.”a Sɛngá bayangani bálobela ndenge babongisaka ntango mpo na kotánga Biblia mokolo na mokolo. Lendisá mabota mpe bayangani nyonso na kosalela siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2005 mpo na kosala programɛ ya makambo ya elimo.
Min. 15: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola.”b Lisolo elongo na bayangani na makambo oyo ezali na Eteni 1 mpe 2 ya siplema. Bokoki mpe kolobela makambo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2004, lokasa 1. Mpo na nini ezali na ntina omibongisaka malamu mbala nyonso oyo osengeli kotambwisa boyekoli ya Biblia? Yango esɛngi nini? Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo basalelaki makanisi oyo epesamaki. Mpo na kosukisa, lobelá etánda oyo ezali na likoló, oyo ezali na makomi ya moindo, na lokasa ya liboso ya siplema.
Loyembo 110 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 19 Sɛtɛmbɛ
Loyembo 168
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina ya mokanda ya biro oyo ezali na lokasa ya liboso ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 20: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali kotalela mosala ya mbula eleki, akolobela mingi mpenza makambo ya kolendisa oyo basakoli basalaki na mosala ya kosakola. Pesá longonya oyo ebongi. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo esengeli kotyela yango likebi na mobu ya sika. Lobelá mosala ya babongisi-nzela, pesá bango longonya mpo na mosala malamu oyo basali. Lobelá matomba oyo emonanaki na milende oyo lisangá esalaki mpo na kosalisa basakoli oyo batiká kosakola.
Min. 15: “Tókoba kolendisana.”c Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo bazwaki matomba na ndenge oyo basusu bamibanzabanzaki mpo na bango na bolingo mpenza.
Loyembo 199 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 26 Sɛtɛmbɛ
Loyembo 122
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Tósalela bazulunalo mpo na koyebisa bato nsango malamu. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na maloba ya ebandeli ya lisukulu oyo, lobelá makanisi oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2005, lokasa 8, paragrafe 3-6: (1) Lakisáká bazulunalo nyonso mibale mbala moko. (2) Bongisáká pɔsɔ na pɔsɔ ata mokolo moko mpo na kokabola bazulunalo. (3) Omityelá mokano ya kokabolaka bazulunalo sanza nyonso. (4) Salelá mabaku nyonso ebongi mpo na kolakisa bazulunalo. (5) Salelá malamu bazulunalo ya kala. Monisá ndenge ya kosalela makanisi yango na teritware ya lisangá na bino. Na nsima, salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Longolá yango, bendá likebi ya bayangani na masolo mosusu ya bazulunalo yango oyo ekoki kobonga na bato ya teritware na bino, mpe salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela moko ya masolo yango. Nsima ya elakiseli mokomoko, lobelá bisika oyo esalemi malamu.
Loyembo 3 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Ɔkɔtɔbɛ
Loyembo 54
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: “Salisá basusu ‘bátosa na motema mobimba.’”d Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.
Min. 20: Tósepelisa motema ya Yehova. (Mas. 27:11) Sololá na basaleli ya Yehova ya sembo mibale to misato, oyo baumeli. Sɛngá bango bálobela likambo moko to makambo mibale oyo esalisaki bango na kotosa Yehova ntango nyonso. Bakoki kolobela makambo lokola koyekola bango moko na molende, koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, kozala na baninga oyo bazali mpe bato ya sembo, kosangana na mosala ya kosakola na molimo mobimba, kosala mabondeli oyo euti na motema, mpe koboya masano ya mabe. Makambo nini bakutanaki na yango oyo emekaki botosi na bango, mpe ndenge nini balongaki yango? Mapamboli nini bazwaki na ndenge batosaki?
Loyembo 170 mpe libondeli ya nsuka.
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.