Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

LIYEBISI: Sanza moko to mibale nsima ya liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe,” bózwa miniti 15 to 20 na Likita ya Mosala (mbala mosusu na lisolo oyo ekolobela bamposa ya lisangá) mpo na kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola. Lisolo yango ya ntina mingi oyo ekosalema na Likita ya Mosala, ekopesa biso libaku ya kolimbola ndenge oyo tozali kosalela makambo oyo toyokaki na liyangani mpe ndenge yango esalisi biso tóbongisa mosala na biso ya kosakola.​—⁠Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprili 2005, lok. 2.

Pɔsɔ ebandi na 8 Augusto

Loyembo 125

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá basakoli dati oyo lisangá na bino ekosala liyangani ya zongazonga mpe ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2006 soki bapesi yango.

Min. 10: “Osalelaka nkasa ya libyangi?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki ntango basalelaki nkasa ya libyangi. Salá mpe elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosalela lokasa ya libyangi mpo na kobengisa, na makita, moto moko oyo asepelaka na mateya ya solo.

Min. 25: “Sikoyo nde ntango ya kosakola!”a Bongisá liboso elongo na mobongisi-nzela ya sanza na sanza moko to mibale mpo bálobela makambo nini babongolaki na bomoi na bango mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mpe mapamboli nini bazwi mpo na yango.

Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Augusto

Loyembo 11

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto mpe Lamuká! ya 22 Augusto. Elakiseli moko ekomonisa nkulutu moko ná mosakoli moko ya ebɔsɔnɔ bazali kopesa litatoli na telefone.

Min. 15: Ozali komikundola? Lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2005, lokasa 30. Sɛngá bayangani bápesa biyano na motuna mokomoko. Monisá ndenge ya kosalela makambo yango. Lendisá bayangani nyonso bátángaka masolo nyonso ya nimero mokomoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!

Min. 20: “Bandá koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone.”b Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na ye na kosalela kaka paragrafe moko to mibale na mwa buku Azali kosɛnga. Lobelá na mokuse likambo moko to makambo mibale ya kolendisa oyo etali kobanda koyekola na bato na telefone.

Loyembo 30 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Augusto

Loyembo 161

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Kosakola Bokonzi ezali mosala ya ntina mingi.”c Ntango bokokóma na paragrafe 4, lobelá lisusu ebongiseli ya kopesa ata miniti 15 na mosala ya kosakola mpo na baoyo bazali mpenza mibange to bafandá na ndako mpo na maladi.​—⁠Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2002, lok. 8, par. 6.

Loyembo 204 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Augusto

Loyembo 45

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ. Elakiseli moko ekomonisa ndenge ya kozongela moto oyo azwaka bazulunalo mbala na mbala.

Min. 15: “Kopesa litatoli kozanga koloba.”d Sɛngá basakoli oyo oponaki bálobela ndenge etamboli malamu ya basaleli ya Yehova etindaki bango bákóma mpe kosalela Yehova.

Min. 20: Tangeláká bato Biblia mbala ya liboso oyo okutani na bango na mosala ya kosakola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Zongelá makanisi oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2004, lokasa 4, paragrafe 2, mpo na kobenda likebi ya moto na Liloba ya Nzambe mbala ya liboso oyo okutani na ye. Salá elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kosalela likanisi moko to makanisi mibale na mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Soki ntango ezali, okoki mpe kolobela makanisi oyo bapesi na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 mpo na mikanda oyo tokolakisa na sanza oyo, mpe kosala elakiseli na yango.

Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 98

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola​—⁠Eteni 12.”e Bongisá liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale bálobela nini esalisaki bango báyeba malamu kobanda mpe kolanda koyekola na bato Biblia.

Min. 20: Tómibongisa mpo na kosalisa mibange. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1993, nkasa 28-29, na motó ya likambo moke “Komibongisa ezali na motuya mingi.” Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kosalisa bandeko oyo bazali na maladi mpe baoyo bakómi mibange.

Loyembo 164 mpe libondeli ya nsuka.

[Footnotes]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto