Batelá yango
Makanisi mpo na ndenge ya kolakisa mwa babuku—Eteni 1
Siplema oyo ezali na makanisi ndenge na ndenge oyo ekosalisa bino bóbongisa masolo mpo na kolakisa mwa babuku. Bokoki kosalela makanisi yango na kotalela teritware ya lisangá na bino. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa mwa babuku. Mpo na mwa babuku oyo siplema emonisi te ndenge ya kolakisa yango, bokoki kosalela makanisi oyo elandi mpo na kobongisa ndenge ya kolakisa yango.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8.
Makanisi nyonso oyo epesami na lokasa oyo ezali na (1) motuna moko oyo ekotinda moto na kokanisa mpo na kobanda lisolo, (2) esika likanisi oyo elobelami ezali na kati ya mwa buku, mpe (3) vɛrsɛ moko ebongi, oyo okoki kotánga ntango ozali kosolola na moto. Okoki kosukisa lisolo na maloba na yo moko, na kotalela eyano oyo moto akopesa.
Bokonzi oyo ekosala Paradis
“Bato mingi bazelaka na motema likoló mokolo oyo mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango lelo oyo ekosila. Okanisi ete ekozala na guvɛrnɛma moko oyo ekosilisa mikakatano ya bato?”—lok. 3, par. 1; Mat. 6:9, 10.
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
“Ntango tokufeli moto oyo tolingaki mingi, biso nyonso tomitunaka soki akei wapi mpe soki tokomona ye lisusu. Ekómelaka yo okanisa na mituna ya ndenge wana?”—Mituna oyo ezali na ezipeli ya nsuka; Yobo 14:14, 15.
Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
“Mingi na biso toyebi libondeli oyo ebandaka boye: ‘Tata na biso oyo azali na likoló, Nkombo na yo ezala mosantu.’ (Mat. 6:9, haut-fleuve) Kasi, oyebi ete mpo na kobika tosengeli liboso koyeba nkombo yango?”—lok. 28, par. 1; Lom. 10:13.
Ntango moto oyo olingaka akufi
“Lelo tozali kolakisa bato mwa buku oyo, oyo esili kobɔndisa mpe kopesa elikya na bato mingi oyo bakufelaki moto oyo balingaki mingi. Omituna naino te elikya nini tokoki kozala na yango mpo na bato oyo bakufá?”—lok. 27, par. 3; Yoa 5:28, 29.
“Omituna naino te nini okoki kosala mpo na kobɔndisa moto moko oyo akufeli moto oyo alingaki ye mingi?”—lok. 20, par. 1; Mas. 17:17.
Osengeli kondima Trinité?
“Bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na Nzambe. Okanisi ete makambo oyo tondimaka ezali na ntina?”—lok. 3, par. 3, 7-8; Yoa 17:3.
Sepela na bomoi ya seko na Mabele!
“Bato mingi bakanisaka ete bakokende na likoló mpo na kozala na bomoi ya seko, kasi, okanisi nini mpo na bomoi ya seko awa na mabelé?”—Elilingi ya ezipeli; Emon. 21:4.
Un livre pour tous
“Okanisi ete Biblia ezali na toli oyo ebongi mpenza kosalela lelo oyo?”—lok. 22, maloba ya ebandeli; lok. 23, par. 3 ya etanda; Mas. 25:11.
Une vie pleinement satisfaisante: Comment?
“Na mokili mobimba, bato bazali koluka kokóma na bomoi ya malamu. Okanisi ete mokolo mosusu bato bakozala na bomoi ya malamu mpenza?”—lok. 29, par. 6; 2 Pet. 3:13.