Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai mpe Lamuká! ya 22 Mai. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, mosakoli azali kolakisa zulunalo na litatoli ya libaku malamu, na bisi.
Min. 15: Salelá Liloba ya Nzambe mpo na kosimba mitema ya bato. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2005, nkasa 28-31. Monisá ndenge oyo Yesu asalelaki Makomami mpo na kosalisa Petelo. Lobelá ndenge tokoki kolanda ndakisa ya Yesu ntango esengeli tósembola makanisi mpe mayoki ya bana na biso, ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia, mpe ata ya biso moko.
Min. 20: “Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo.” Na maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti mibale te, monisá ete ezali malamu kozala na programɛ oyo bokomi na papye, mpe lobelá ndenge ya kotondisa lokasa ya programɛ oyo ezali na lokasa 6. Na nsima, salá lisolo ya mituna mpe biyano na lisolo “Programɛ ya libota—Makita ya lisangá.” Sɛngá bayangani bálobela oyo basalaka mpo makambo mosusu ezangisa bango makita te. Makambo mosusu oyo libota basengeli kokotisa na programɛ na bango ekolobelama na pɔsɔ elandi.
Loyembo 176 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: “Programɛ ya libota—Kosakola na libota.”a Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo libota bakoki kozwa soki bazali kosakola elongo mbala na mbala.
Min. 20: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 9.”b Ntango bokolobela paragrafe 2, lobelá polele likanisi moko to makanisi mibale oyo ezwami na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 2004, lokasa 8. Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali koyekola Biblia na moto moko. Nsima ya kosilisa liteya 2 ya mwa buku Azali kosɛnga, mosakoli akotuna moyekoli boye: “Ndenge nini okoki kolimbola nkombo ya Nzambe epai ya moninga na yo moko?” Moyekoli akolimbola ndenge oyo akosalela Nzembo 83:18, nsima na yango mosakoli akopesa ye longonya.
Loyembo 134 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Mai
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe Lamuká! ya 8 Yuni. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango.
Min. 18: “Mokolo ya Yehova ekómi pene.”c Ntango ozali kobongisa lisolo oyo, tángá mpe buku Esakweli ya Danyele, lokasa 59, paragrafe 28.
Min. 15: “Programɛ ya libota—Boyekoli ya libota.”d Bongisá liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale bálobela programɛ na bango ya boyekoli ya libota mpe milende oyo basengeli kosala mpo na kosalaka yango pɔsɔ na pɔsɔ.
Loyembo 152 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yuni. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale na makanisi oyo bapesi na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa mikanda yango. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango.
Min. 20: “Programɛ ya libota—Mokapo ya mokolo.”e Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaka ndenge batalelaka mokapo ya mokolo na libota mpe programɛ oyo bamonaka ete ebongi mpenza mpo na libota na bango.
Min. 15: Lobelá to salá bilakiseli ya makambo ndenge elekaki, na makambo ya kolendisa oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na sanza ya Marsi, Aprili mpe Mai. Bongisá liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale mpo bálobela milende oyo basalaki mpo na kosala mingi na eleko ya Ekaniseli mpe mapamboli oyo bazwaki.
Loyembo 115 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 6 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Kebá na makambo ya bonkɔkɔ oyo esepelisaka Nzambe te. Lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2005, nkasa 27-30.
Min. 20: “Tikeláká bato bazulunalo mbala na mbala mpo na kokolisa mposa na bango.”f Ntango bokolobela paragrafe 3, bendá likebi ya bayangani na buku Comment raisonner, nkasa 334-341. Bokoki kosalela makanisi yango mpo na kobongisa masolo ya vɛrsɛ moko kaka, oyo ekolobela makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekokokisa. Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge oyo mosakoli akoki kosala lisolo ya vɛrsɛ moko kaka epai ya moto oyo ye atikelaka bazulunalo mbala na mbala. Mosakoli asengeli kolobela yango na mokuse mpe kopesa ndakisa moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela vɛrsɛ yango mpo na kosalisa moto oyo azali kosolola na ye akanga ntina na yango malamumalamu mpe asalela yango na bomoi na ye.
Loyembo 107 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.