Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Apr.
“Omoni te ete lelo oyo bato bayebi makambo mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Kasi, likambo moko te oyo moto akoki koyeba ezali na valɛrɛ koleka oyo balobeli na vɛrsɛ oyo. [Tángá Yoane 17:3.] Zulunalo oyo ezali komonisa soki maloba ‘bomoi ya seko’ elimboli nini mpe ndenge tokoki kozwa boyebi oyo ezali komema na bomoi yango.”
Lamuká! 22 Apr.
“Atako mbala mosusu Yesu Klisto ayebani mingi koleka bato nyonso, bato mingi bamitunaka soki azali mpenza nani. Oyebi ete ata bantoma ya Yesu bamitunaki motuna yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Malako 4:41.] Zulunalo oyo ezali kolobela oyo Biblia elobi mpo na Yesu, soki azalaki mpenza nani.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Mai
“Ntango moto oyo tolingaka akufi, biso nyonso tozalaka na mposa ya komona ye lisusu. Ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi balendisamaki na elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi. [Tángá Yoane 5:28, 29.] Zulunalo oyo elobeli ntango oyo lisekwa ekosalema mpe banani mpenza bakosekwa.”
Lamuká! 8 Mai
“Baboti mingi baponelaka bana na bango bafilme mpe baemisyo ya televizyo oyo bakoki kotala. Ezalaka mpasi mpo ozwa bafilme oyo ebongi na libota na yo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baefese 4:17.] Zulunalo oyo emonisi ndenge baboti bakoki kosalisa bana na bango bápona bafilme mpe baemisyo ya televizyo ya malamu oyo ekomemela bango makama te.”