Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yuni: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa buku Bolamu na libota to buku Boyebi. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Kobanda na sanza ya Aprili, makarɔ mpo na liyangani ya etúká ya mobu 2005 ekotindama mbala moko na masangá nzela moko na mikanda mosusu. Ekozala na ntina te masangá esala komande na yango, longola kaka soki bazali na etuluku moko oyo esalaka makita na monɔkɔ ya bapaya. Bosengeli kosala komande ya baetwi ya makarɔ mpo na basakoli nyonso oyo bazali na mposa na yango.
◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adresi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29) mpe bakotinda formilɛrɛ yango noki mpenza na biro ya filiale.
◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, bótalaka malamu soki batondisi yango nyonso.