Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/05 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 4/05 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Aprili 2005. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Marsi tii na pɔsɔ ya 25 Aprili 2005. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ntango tozali kobongisa lisolo, nini emonisaka ete tosaleli malamu makambo oyo batindi biso tólobela, mpe mpo na nini yango ezali na ntina? [be lok. 234 par. 1-3, bitanda]

2. Tosengeli nde koluka kolobela makambo nyonso oyo ezali na mokanda esika batindi biso? [be lok. 234 par. 4–lok. 235 par. 1]

3. Na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki kosalela mituna mpo na kosolola na bato? (Mis. 8:30) [be lok. 236 par. 2-5]

4. Ndenge nini tokoki kosalela mituna mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia básalela ‘likoki na bango ya kokanisa?’ (Lom. 12:⁠1) [be lok. 238 par. 1]

5. Mituna oyo ezali na Baloma 8:​31, 32 mpe na Yisaya 14:​27, ezali komonisa nini? [be lok. 239 par. 1-2]

LISOLO NO. 1

6. Ndenge nini ‘totyaka Klisto lokola moboko’ na mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli? (1 Kol. 3:11) [be lok. 278 par. 1-2]

7. Lokola Yehova apesaki mwana na ye nguya nyonso ya koyangela na 1914, likanisi na biso ezalaka nini ntango tobondelaka, “Tiká bokonzi na yo eya”? (Mat. 6:​9, 10) [be lok. 279 par. 4]

8. Mpo na nini baklisto nyonso basengeli koluka koyeba kotánga, mpe ndenge nini Yesu apesaki ndakisa na likambo yango? [w03 15/3 lok. 10 par. 5; lok. 12 par. 2]

9. Ndenge nini ndakisa ya Yosiya mpe ya Yesu ekoki kosalisa bilenge bákola na elimo? [w03 1/4 lok. 8 par 3-4; lok. 10 par. 3]

10. Mpo na nini tosengeli kotyela Nzambe motema? (Mas. 3:​5, 6) [w03 1/11 lok. 4 par. 6-lok. 5 par. 1-2]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Mpo na nini Hana abondelaki ete Yehova “akokembisa mokonzi na ye” nzokande, na ntango wana Yisalaele ezalaki naino na mokonzi te? (1 Sam. 2:⁠10)

12. Lokola balongaki Bayisalaele atako sanduku ya kondimana ezalaki na kati na bango, ekoki koteya biso nini? (1 Sam. 4:​3, 4, 10)

13. Mpo na nini 1 Ntango 2:​13-15 elobi ete Davidi azalaki mwana ya nsambo ya Yisai, nzokande 1 Samwele 16:​10, 11 elobi ete azalaki mwana ya mwambe?

14. “Elimo mabe” oyo etungisaki Saulo ezalaki nini? (1 Sam. 16:⁠14)

15. Makambo moto oyo babengaki Samwele alobaki na nzela ya nganga-nkisi na Ene-dolo ezalaki ya solo? (1 Sam. 28:​16-19)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto