Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali mpe Lamuká! ya 22 Febwali. Lobelá na mokuse ndenge tokoki koyokanisa maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na makambo ya teritware na biso.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8.
Min. 35: “Eleko ya Ekaniseli—Ntango ya mosala mingi.”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Ntango bokolobela paragrafe 6, lobelá mpe makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ 2004, nkasa 12-13 (na Lifalanse). Tángá nkombo ya basakoli oyo basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Lobelá makita mosusu ya mosala ya kosakola oyo bobongisi. Lendisá bayangani nyonso báluka ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala na bango ya elimo na eleko oyo ya Ekaniseli.
Loyembo 14 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na etanda ya lokasa 6, “Salisá bango bázwa litatoli lisusu.” Lendisá basakoli nyonso bátondisaka mbala moko formilɛrɛ Intérêt à suivre dans une langue étrangère (S-70a) soki esengeli.
Min. 20: “Pesá Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye.”b Yebisá ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema, nkombo ya ndeko oyo akosala lisukulu mpe makambo mosusu ya ntina oyo etali Ekaniseli. Ntango bokolobela paragrafe 4, salá elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kobenga moto oyo atikelaka bazulunalo mbala na mbala na Ekaniseli. Soki basakoli bazwi naino nkasa ya libyangi na Ekaniseli te, bópesa bango yango nsima ya likita oyo.
Min. 15: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 6.”c Salá mpe elakiseli moko ya miniti 4; na elakiseli yango moyekoli ya Biblia moko akotuna motambwisi na ye ntina oyo bato oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli bazalaka mingi te. Motambwisi apesi ye longonya mpo na motuna, akomi yango, mpe ayebisi ye ete bakotalela yango na nsuka ya boyekoli. Na nsuka ya boyekoli, mosakoli akobenda likebi ya moyekoli na makambo oyo ezali na nse ya motuna oyo elobi: “Qui est en droit de participer au pain et au vin?” na buku Comment raisonner, lokasa 243. Bakotánga bango mibale, mpe moyekoli akopesa matɔndi mpo na eyano ya polele oyo azwi na motuna na ye.
Loyembo 21 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Febwali
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Febwali. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya 8 Marsi. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na nsuka ya elakiseli moko, mosakoli akosalela libyangi oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Lamuká! ya 8 Marsi mpo na kobenga moto oyo azali kosolola na ye na Ekaniseli.
Min. 20: Tómonisa ete tozali komibanzabanza mpo na baoyo balɛmbi. (Mis. 20:35) Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, salá lisolo ya mituna mpe biyano na makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2004, nkasa 17-18, paragrafe 12-16, ndenge tosalaka na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Sɛngá ndeko moko oyo ayebi kotánga malamu atánga bapragrafe. Lobelá mingi mpenza ndenge tokoki kosalela makanisi yango na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka nsima na yango.
Min. 10: Tólakisa mwa buku Bókɛngɛlaka! Salá lisolo mpe bilakiseli ya maloba ya kobanda lisolo oyo tokoki kosalela mpo na kolakisa mwa buku yango na sanza ya Marsi. Bokoki kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 to maloba mosusu oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino.
Loyembo 72 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.”
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola.”d Ntango bokolobela paragrafe 3 ná 4, monisá ndenge ya kosalela makanisi yango na teritware na bino. Sololá na mokuse elongo na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bameseni kokabola bazulunalo ntango bazali kosakola na bisika ya mombongo, na babalabala, na bisika oyo bato bazalaka mingi, to ntango bazali kopesa litatoli ya libaku malamu. Tuná bango bámonisa ndenge bakabolaka bazulunalo na bisika wana. Salá elakiseli ya lolenge moko ya kobanda lisolo to elakiseli moko ya makambo ndenge elekaki.
Loyembo 192 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.