Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/05 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Yanuali
  • pɔsɔ ebandi na 7 Febwali
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 1/05 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Yanuali

Loyembo 223

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali mpe Lamuká! ya 22 Yanuali. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, mosakoli akolakisa bazulunalo epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te.

Min.15: “Toleisami na maloba ya kondima.”a Soki ngonga ezali, tángá mpe lobelá bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.

Min. 20: “Meká lolenge moko ya kobanda lisolo oyo ebongi.” Lisolo elongo na bayangani na lokasa 6 ya siplema. Salá bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kosalela maloba oyo bapesi lokola ndakisa mpo na kolakisa mikanda na sanza oyo. Na elakiseli mokomoko, mosakoli akotánga vɛrsɛ moko oyo ezali kolobela likambo oyo ezali kotungisa moto oyo azali kosolola na ye.

Loyembo 143 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Yanuali

Loyembo 34

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bilenge bozali kokola na elimo? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2003, nkasa 8-10. Lobelá mwa mikano oyo ebongi oyo moto akoki kokokisa, mpe lendisá bilenge bámityela mikano ya sikisiki na elimo.

Min. 20: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 5.”b Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko oyo ameseni kotambwisa boyekoli ya Biblia azali kosolola na mosakoli moko ya sika mpo na komonisa ye ndenge ya kokima mitambo oyo elobelami na paragrafe 4-5.

Loyembo 78 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Yanuali

Loyembo 163

Min.  10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Talelá na mokuse etanda “Bakɔtisi masolo ya bakasɛti-video misato na DVD.”

Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu.

Min. 25: “Ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa.”c Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Monisá ete nkasa 3-5 ya siplema ya sanza oyo ezali na makanisi oyo tokosalela mpo na mikanda oyo tokolakisa. Bóbomba siplema yango mpo na kosalela yango na mbula oyo mobimba. Nsima ya kotalela lisolo yango, lobelá ndenge oyo tokoki kolakisa buku Approchez-vous de Jéhovah na sanza ya Febwali. Salá bilakiseli mibale. Bokoki kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na lokasa 3, to ndenge mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware na bino.

Loyembo 200 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 31 Yanuali

Loyembo 157

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe Lamuká! ya 8 Febwali. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Otángaka Makomami mokolo na mokolo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—⁠2005. Lobelá ntina oyo bayangani nyonso basengeli kozwaka mwa miniti mokolo na mokolo mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango. Bongisá liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale, bálobela programɛ na bango ya kotalela mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwaka. Mpo na kosukisa, lobelá na mokuse mokapo ya mobu 2005.

Loyembo 184 mpe libondeli ya nsuka.

pɔsɔ ebandi na 7 Febwali

Loyembo 97

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Tóteya bato ya sika bálinga Nzambe mpe bazalani na bango. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2004, lokasa 16, paragrafe 7-9. Monisá polele ndenge moto mokomoko na lisangá azali na mokumba ya kosalisa bato ya sika bákóma bayekoli ya Klisto.

Min. 20: Yehova akoboya te kopesa eloko ya malamu. (Nz. 84:11) Sololá na mwa bandeko mibali mpe basi oyo batikalaki sembo na mimekano. Mikakatano nini bakutanaki na yango? Nini esalisaki bango bálonga? Esɛngo nini mpe mapamboli nini bazwi?

Loyembo 104 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto