Mayebisi
◼ Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepelá na bomoi ya seko na mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Ntango moto oyo olingaka akufi. Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2005, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2005 na komande oyo bakosala mbala ekoya.
◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2004 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda atángaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motango ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko oyo bosalelaka mikanda esika moko. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa mosala yango ya evantɛrɛ. Mokɛngɛli-mokambi mpe Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F) misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na Biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bosengeli kobomba kopi mosusu na dosye na bino. Kopi ya misato, yango nde bokosalela lokola bruyɔ.
◼ Soki bokosala Eteyelo mpo na babongisi-nzela na zongazonga na bino, na bongo bósala yango na boumeli ya bapɔsɔ mibale oyo ekolanda liyangani ya etúká, na katikati ya pɔsɔ ya 9 Augusto mpe pɔsɔ ya 13 Sɛtɛmbɛ 2004, na kotalela dati oyo bokosala liyangani ya etúká. Mbala mingi, tolingaka ete Eteyelo mpo na Babongisi-nzela esalema na engumba oyo liyangani ya etúká ekosalema mpo na babongisi-nzela oyo basali mbula moko to koleka mpe oyo bakɔtá naino Eteyelo yango te. Biro ekozwa bibongiseli mpo na kosala elongo na bakɛngɛli ya zongazonga na kotalela makanisi oyo masangani ya bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga bakopesa.