Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Augusto 2004. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Yuli tii na pɔsɔ ya 30 Augusto 2004. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.— Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ndenge nini tokoki komonisa ntina ya elikya na biso “na elimo ya boboto mpe na limemya makasi”? (1 Pet. 3: 15) [be lok. 192 par. 2-4]
2. Mpo na nini ezali na ntina komonisa ete tondimi mpenza makambo oyo tozali koloba? (Lom. 8:38, 39; 1 Tes. 1:5; 1 Pet. 5:12) [be lok. 194]
3. Nini ekomonisa ete tozali mpenza kondima makambo tozali koloba? [be lok. 195 par. 3–lok. 196 par. 4]
4. Koloba na mayele elimboli nini, yango ezali na ntina nini, mpe ndenge nini tokoki koloba na mayele kasi koloba kaka makambo ya solo? (Lom. 12:18) [be lok. 197]
5. Makambo nini moto oyo alobaka na mayele asengeli kotalela liboso aloba? (Mas. 25:11; Yoa. 16:12) [be lok. 199]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini masolo na biso mpe lolenge na biso ya koyekola Biblia ekoki komonisa soki tokoli mpenza na elimo? [be lok. 74 par. 3–lok. 75 par. 2]
7. ‘Komisombela ntango oyo ebongi’ elimboli nini, mpe ndenge nini tokosala yango? (Ef. 5:16) [w02 15/11 nk. 22, 23]
8. Ndenge nini Makomami ezali komonisa polele ete bato nyonso bazali ndenge moko na miso ya Nzambe, mpe yango esengeli kotinda biso tósalaka nini na mosala ya kosakola? [w02 1/1 nk. 5, 7]
9. Nkombo ya Mozalisi Yehova, elimboli nini? [w02 15/1 lok. 5]
10. Nini esalaki ete mbeka ya Abele ezala “ya motuya monene koleka” oyo ya Kaina, mpe yango ekoki kopesa biso liteya nini mpo na oyo etali “mbeka ya lisanzoli” oyo biso topesaka? (Ebe. 11:4; 13:15) [w02 15/1 lok. 21, par. 6-8]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Ndenge nini Levitike 18:3 ekoki kosalisa biso tótalelaka mabe ná malamu na ndenge ya mabe te? (Ef. 4:17-19) (w02 1/2 lok. 29)
12. Na ntango ya Fɛti ya bapɔsɔ (to Pantekote), ‘mampa mibale’ oyo nganga-nzambe monene azalaki kopesa lokola ‘likabo oyo eningisami’ ezalaki elilingi ya nini? (Lev. 23:15-17) [w98 1/3 lok. 13 par. 21]
13. Soki mwasi asali ekobo, ndenge balobeli yango na Mituya mokapo 5, na ndenge nini ‘ebɛlɔ na ye esengelaki kobeba’? (Mit. 5:27, NW) [w84-F 15/7 lok. 29]
14. Mpo na nini Milyami mpe Alona balobaki mabe na ntina na Moize mpo na mwasi na ye Mokusi? (Mit. 12: 1)
15. ‘Mokanda ya Bitumba ya Yehova’ ezalaki nini? (Mit. 21:14)