Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 8 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá basakoli bámɛma mwa buku na bango “Voyez le bon pays” na Likita ya mosala ya pɔsɔ ekolanda. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa ya nsuka mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi mpe Lamuká! ya 22 Marsi.a
Min. 15: Ndenge ya kosalela batrakte mpo na kobanda masolo. Lisolo elongo na bayangani. Mbala mingi, mokakatano ya kopesa litatoli ezalaka nde kobanda lisolo. Tokoki kolonga mokakatano yango soki tozali kosalela batrakte ntango tozali kosakola ndako na ndako, na bisika ya mombongo, mpe na bisika oyo bato bazalaka mingi. Lobelá na mokuse trakte mibale to misato, oyo ebongi na bato ya teritware na bino. Makambo nini tokoki koloba mpo na kolakisa batrakte yango? Ndenge nini tokoki kosalela bililingi? Mituna nini tokoki, na mayele mpenza, kobimisa na batrakte yango? Na trakte mokomoko, lobelá paragrafe moko oyo mosakoli akoki kotalela elongo na moto oyo asepeli na yango. Salá elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kobanda lisolo na lisalisi ya trakte. Sɛngá mosakoli asalela paragrafe moko ya trakte yango mpe na nsuka alakisa buku Boyebi.
Min. 20: “Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”b Ntango bokokóma na paragrafe 3, sɛngá bayangani bálobela oyo basali mpo na kobenga bato na Ekaniseli.
Loyembo 131 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 15 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo, “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.” Yebisá mokolo oyo bokoyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na pɔsɔ ya Ekaniseli.
Min. 15: Mosala ya kosakola na eleko oyo ya Ekaniseli. Lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi. Lobelá makambo ya kolendisa oyo bokutanaki na yango. Lendisá baoyo bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ete básala yango na sanza ya Aprili mpe Mai. Bótalela na mokuse siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali.
Min. 20: Zwá matomba na mwa buku “Voyez le bon pays.” Mwa buku yango ya sika ekosalisa biso na komona ete makambo tozali kotánga mpe koyekola na Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi. Sɛkɛlɛ na yango ezali kosalela Index na yango. Tángá Yisaya 63:1, oyo elobeli Yehova lokola moto oyo azali kouta na Bosala (Botsra). Sɛngá bayangani báluka esika oyo balobeli Botsra na Index ya mwa buku “Bon pays.” Salelá etanda ya lokasa 34 mpo na kolimbola “Botsra 11 G11.” Luká esika Botsra mpe Edome ezali na kalati. Salelá Index mpo na koyeba nzela oyo Yesu alekaki ntango autaki na Yelusaleme mpo na kokende na Sikala. (Yoa. 4:3-5) Salá lisusu ndenge wana mpo na koyeba esika liziba ya Betezata ezali. (Yoa. 5:1-3) Luká ndakisa mosusu moko to bandakisa mibale na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ ya Eteyelo ya Teokrasi. Sɛngá bayangani bálobela bisika tokoki komona bamboka yango na kati ya mwa buku mpe ndenge nini tozali kozwa matomba ntango tozali kosalela bakalati yango. Lobelá na mokuse bakalati mosusu oyo ezali na mwa buku yango, lobelá mpe eleko oyo yango elobeli. Kalati oyo ezali na nkasa 18-19, ezali komonisa bisika mingi oyo Biblia elobeli. Lendisá bayangani nyonso básalela malamu mwa buku “Voyez le bon pays.”
Loyembo 63 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 22 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá bayangani nyonso bálanda programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, oyo ebongisami banda na mokolo ya 30 Marsi tii mokolo ya 4 Aprili ndenge ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2004 mpe na Calendrier 2004.
Min. 15: Mokumba na biso na oyo etali ebongiseli ya kokabola mikanda kozanga kokata ntalo ya mbongo. Tángá paragrafe mokomoko ya mokanda ya 25 Novɛmbɛ 2003 oyo biro etindelaki masangá nyonso mpe na nsima salá yango lisolo ya mituna mpe biyano.
Min. 20: “Etumba ya basoda batamboli-na-mpunda oyo etaleli mpe yo.”c Soki ntango ezali, bótánga mpe bólobela bavɛrsɛ oyo maloba na yango ekomami te.
Loyembo 181 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 29 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Aprili. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa ya nsuka mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya 8 Aprili.d
Min. 15: Salelá malamu Annuaire 2004. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi”; lobelá mpe makambo oyo ezali kobenda likebi na lapɔlɔ ya mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe mwa masolo mosusu ya kolendisa. Lendisá bandeko nyonso bátánga buku yango mobimba na boumeli ya mbula.
Min. 20: Solo esalisaka libota ezala na bomoko. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Bato oyo basepelaka na solo bakakatanaka ntango mosusu kosalela Yehova mpo bato ya libota na bango batɛmɛlaka bango. Sɛngá bandeko bálobela mwa makambo bandeko bakutanaki na yango oyo balobeli na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2002 nkasa 14-15; 1 Desɛmbɛ 2000, lokasa 8; 1 Sɛtɛmbɛ 1999, lokasa 32; 1 Yanuali 1999, lokasa 4; Lamuká! Ya 22 Febwali 1998, lokasa 31 (na Lifalanse). Monisá ete mbala mingi libota ekómaka malamu soki ata moto moko ya libota azali kosalela mitinda ya Biblia.
Loyembo 130 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 5 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: Bopɛto ya nzoto elobelaka biso. Ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2002 na nkasa 19-21. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa nkulutu moko azali komonisa mobongisi-nzela moko ndenge akoki kosalela na mayele mpenza paragrafe 5 ya liteya 9 na mwa buku Azali kosɛnga, mpo na kosalisa moyekoli na ye ya Biblia akanga ntina ya kobatelaka ndako mpe lopango na ye pɛto.
Min. 15: Lobelá makambo ya kosepelisa oyo basakoli bakutanaki na yango na mokolo ya Ekaniseli mpe ndenge basakolaki mingi na sanza ya Marsi.
Loyembo 25 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.