Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/03 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Yanuali
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 12/03 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Desɛmbɛ

Loyembo 221

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ.a Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.

Min. 20: “Nini ezali kosala ete baklisto bázala na bomoko ya solosolo?”b Ntango bokokóma na paragrafe 5, sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango na mayangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi, na bisika oyo bazali kotonga bandako ya Bokonzi, Betele to Ndako ya mayangani, to ntango bapesaki mabɔkɔ mpo na kosalisa bandeko na bisika oyo makama esalemaki, mpe ndenge yango ezali komonisa mpenza bomoko na biso baklisto.

Min. 15: “Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi na mobu 2004.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2003.

Loyembo 108 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Desɛmbɛ

Loyembo 71

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá etanda “Tókende kotala bango nokinoki.” Lakisá bayangani formilɛrɛ S-70 soki ezali. Lobelá mosala ya kosakola mpo na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe ya 1 Yanuali.

Min. 15: Koyekola yo moko ezali na kati ya losambo. Lisukulu oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nkasa 14-15, paragrafe 6-10.

Min. 20: “Tósalisa baoyo bazali ‘na ezaleli oyo ebongi.’”c Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Zongelá makanisi oyo epesamaki mpo na bozongeli ya sika, na etanda oyo ezali na lokasa 3 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprili 1997.

Loyembo 42 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Desɛmbɛ

Loyembo 10

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya 8 Yanuali.d Yebisá bato nyonso ete na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi, tokolobela kalati Instructions médicales prévisionnelles mpe bakokabola yango.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 18: “Tóluka baoyo babongi.”e Lobelá ndenge ya kosalela makambo yango na lisangá na bino. Ntango nini bato mingi bazalaka na ndako? Matomba nini basakoli mosusu bazwi mpo bazali kosakola ntango moi ebandi kolala to na bampokwa? Mayele nini bokoki kosalela mpo na kokutana na bato oyo bafandaka mpenza na ndako te?

Loyembo 209 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Desɛmbɛ

Loyembo 200

Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yanuali.

Min. 17: Tózala na ekateli makasi ya koboya makila. (Det. 12:23) Lisolo elongo na bayangani; bótalela paragrafe mokomoko ya mokanda ya 1 Novɛmbɛ 2002, oyo batindelaki masangá nyonso. (Liyebisi: Mokanda yango ezali komonisa ndenge ya koboya bázongisa biso makila.) Ndeko moko oyo ayebi kotánga malamu akotánga baparagrafe. Sɛngá bayangani bámonisa ndenge bakoki kosalela makanisi yango na teritware na bino.

Min. 23: Ndenge ya kobunda na motema mpiɔ na mikakatano oyo etali lisalisi ya monganga. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki, akosalela plan oyo ekouta na biro. Akolobela mpe makanisi ya ntina oyo ezali na etanda “Bibongiseli oyo ezali kosalisa biso tóboya makila.”

Loyembo 182 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Yanuali

Loyembo 103

Liyebisi: Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 5 Yanuali liboso ya dati yango, longola kaka masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala yango. Masangá nyonso esengeli kotalela siplema oyo ezali kolobela liyangani ya etúká kaka na pɔsɔ oyo ezali na programɛ. Soki lisangá moko ekozala na liyangani ya zongazonga na pɔsɔ oyo, bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koyebisa bandeko ya etuluku na bango esika mpe dati oyo liyangani ya etúká ekosalema.

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Mosala na bino ya makasi ezali mpamba te. (1 Kol. 15:58) Lisolo elongo na bayangani. Sɛngá basakoli oyo basakolaka sanza na sanza banda bambula mingi bámibongisa liboso mpo na kolobela ndenge mosala ya kosakola ezalaki kosalema kala. Lisangá ezalaki na bato boni? Teritware ya lisangá ebandaki wapi mpe esukaki wapi? Ndenge nini bato bazalaki koyamba nsango ya Bokonzi? Botɛmɛli ya ndenge nini bokutanaki na yango? Ndenge nini mosala ya Bokonzi ekoli na teritware na bino kobanda ntango wana tii lelo oyo?

Min. 25: “‘Tambolá elongo na Nzambe’​—Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2004.” Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Nsima ya kotalela paragrafe 1, tángá mokanda ya biro oyo eyebisi bino liyangani ya etúká oyo bino bokokende. Nsima ya kotalela paragrafe 3, sɛngá na bayangani bátánga makanisi oyo ezali na etanda ya lokasa 4. Lendisá bayangani nyonso bámibongisa libelalibela mpo na liyangani ya etúká.

Loyembo 7 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto