Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/03 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Augusto
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 8/03 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Augusto

Loyembo 101

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa ya nsuka mpo na kosala bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto mpe Lamuká! ya 22 Augusto; soki ezali te, bósalela banimero oyo ebimaki liboso na yango. Na elakiseli moko, monisá lolenge ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nazali na mosala.” (Je suis occupé.)​—Talá buku Comment raisonner, lokasa 19.

Min. 15: “Tólanda ndakisa ya motema malamu ya Yehova.”a Sɛngá bayangani báloba na mokuse ndenge oyo makambo ya boboto oyo basalelaki bato epesaki bango nzela ya kopesa litatoli. Pesá longonya na lisangá mpo na milende oyo basalaka mpo na kosalisa baninga na bango bandimi.

Min. 20: “Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela.”b Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá na mobongisi-nzela moko to babongisi-nzela mibale bálobela mapamboli oyo bazwi na mosala ya mobongisi-nzela. Yebisá bayangani ete moto nyonso oyo asepeli kosala mosala ya mobongisi​-nzela akoki kozwa formilɛrɛ epai ya mokomeli ya lisangá.

Loyembo 11 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Augusto

Loyembo 82

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo.” Pesá dati oyo liyangani yango ekosalema, mpe lendisá bandeko nyonso bázala na liyangani yango. Soki liyangani ekosalema na mwa basanza oyo ezali koya, yebisá ete baoyo balingi kozwa batisimo basengeli koyebisa yango na mokɛngɛli-mokambi.

Min. 15:“Mosala oyo ebɔndisaka.”c Bongisá bandeko mibale to misato oyo bakomonisa ndenge oyo mosala ya kosakola ebɔndisaka bango.

Min. 18: “Tóbatela malamu esika na biso ya losambo.”d (Paragrafe 1-5) Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Ntango bokokóma na paragrafe 3 mpe ya 4, lobelá bibongiseli ya lisangá na bino mpo na oyo etali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Bendá likebi na makambo nyonso oyo bosengeli kotalela malamumalamu. Pesá longonya na lisangá mpo na milende nyonso bazali kosala mpo esika ya losambo ya solo ezala ntango nyonso malamu.

Loyembo 114 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Augusto

Loyembo 175

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ, soki ezali te bósalela nimero oyo ebimaki liboso na yango, na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda libeki na zulunalo moko kaka. Elakiseli mokomoko ekomonisa moboti moko ná mwana na ye ya mobali to ya mwasi oyo azali elenge bazali kobongisa ndenge bakolakisa bazulunalo ntango bakobima mpo na kokabola bazulunalo. Bataleli naino na mokuse makanisi oyo epesami mpo na kolakisa zulunalo, na nsima basali elakiseli.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Zwá mpiko mpo na kosakola. (1 Tes. 2:2) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Limbolá ntina oyo basakoli mingi babangaka kobanda lisolo na bato mosusu mpo na koyebisa bango nsango ya Bokonzi. Ata baoyo basakolaka banda bambula ebele bazalaka mpe na kobanga wana. Lobelá mwa makambo oyo ekómelaki bandeko mosusu, oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1999, lokasa 25; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1999, lokasa 25; mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1996, lokasa 31. Sɛngá bayangani báyebisa ndenge oyo bazwaki mpiko mpo na kosakola nsango malamu ntango bazalaki na kobanga. Na nsuka, salelá makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ, nkasa 23-24 mpo na kolendisa bayangani básɛngaka Yehova apesa bango makasi.

Loyembo 125 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 1 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 84

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá na basakoli nyonso bápesa lapolo ya sanza ya Augusto. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ. Sɛngá na ndeko moko to bandeko mibale bámibongisa liboso mpo bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu na ntango ya liyangani ya etúká, to na mabaku mosusu na boumeli ya sanza ya Yuli to ya Augusto.

Min. 15: Ozongelaka bato ndenge olakaki bango? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1999, nkasa 10-11, na motó ya likambo moke “Ndenge mosusu ya kokokisa bilaka na biso.” Na mosala ya kosakola, ntango tokutani na bato oyo basepeli na nsango malamu, mbala mingi toyokanaka na bango mpo tókutana lisusu mpo na kokoba kosolola na bango. Tozongelaka bango mpenza ndenge tolakaki bango? Lobelá mitinda ya Biblia oyo esengeli kolendisa biso tókokisaka bilaka na biso. Sɛngá bayangani bálobela makambo bakutanaki na yango oyo ezali komonisa matomba oyo bazwaki mpo bazongelaki bato nokinoki.

Min. 20: “Tóbatela malamu esika na biso ya losambo.”e (Paragrafe 6-12) Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Monisá polele ntina ya kobatela Ndako ya Bokonzi malamu, lobelá makanisi oyo ezali na etanda ya lokasa 5. Lobelá mpe na mokuse ndenge Ndako ya Bokonzi na bino ezali, mpe bibongiseli oyo bozwi mpo na kobongisa yango.

Loyembo 41 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto