Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/03 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Augusto
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 7/03 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 14 Yuli

Loyembo 56

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa ya nsuka mpo na kosala bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya 22 Yuli na teritware ya lisangá; soki ezali te, bósalela banimero oyo ebimaki liboso na yango.

Min. 15: Ndenge nini losambo ya Yehova ebongisaka bomoi na biso? Lisolo elongo na bayangani. Losambo ya solo epesaka nzela na bomoi ya esengo mpe ya malamu. (1) Esalisaka biso tólonga mikakatano mpe mitungisi ya bomoi. (Filp. 4:6, 7) Elendisaka biso tólona bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. (2 Pet. 1:5-8) (3) Esalisaka biso tósalela ntango mpe biloko na biso na ndenge ya malamu koleka. (1Tim. 6: 17-19) (4) Epesaka biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. (2 Pet. 3: 13) (5) Epesaka biso nzela ya kokóma baninga ya motema ya Yehova. (Yak. 4:8) Monisá ete bato oyo bayebi Yehova te mpe basalelaka ye te bazangaka makambo yango.

Min. 20: “Tózala na botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe.”a Ntango bokokóma na paragrafe ya 3, salelá makambo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 98, lokasa 8, mpo na kopesa mwa makanisi oyo ekomonisa ndenge ya kobanda kotikela bato bazulunalo mbala na mbala. Tuná mosakoli moko to basakoli mibale ya makoki báyebisa lolenge oyo bamonaki ete ezali malamu mpenza mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Lendisá basakoli nyonso bámityela mokano ya kobanda koyekola Biblia na moto moko mpe kotambwisa boyekoli yango mbala na mbala.—om lok. 92.

Loyembo 176 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 21 Yuli

Loyembo 184

Min. 10: Mayebisi ya lisangá mpe lapolo ya kɔnti.

Min. 10: “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Yebisá dati ya liyangani ya zongazonga ya mbala oyo. Soki lisangá na bino ekokende na liyangani yango na mwa basanza oyo ezali koya, yebisá ete baoyo balingi kozwa batisimo basengeli koyebisa yango na mokɛngɛli-mokambi. Lendisá basakoli nyonso básala milende mpenza mpo na kobengisa bato oyo bayekolaka na bango Biblia; bango moko mpe bázala wana na liyangani mobimba.

Min. 25: Tómekola mpiko oyo bamonisaki na mosala na bango ya kosakola. Lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Tósambela Nzambe, nkasa 170-171. Sɛngá bayangani bápesa biyano na mituna oyo ezali na paragrafe 7; na biyano na bango, bápesa mpe makanisi ya bavɛrsɛ oyo ezali na kati ya baparanteze. Poná mikapo oyo okopesa bayangani bátánga. Monisá polele mateya oyo tokoki kozwa na masolo yango mpe ndenge oyo masolo yango esalisi biso tótalela na ndenge ebongi mosala ya kosakola oyo bapesi biso.

Loyembo 201 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 28 Yuli

Loyembo 45

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá na basakoli nyonso bápesa lapolo ya sanza ya Yuli. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa ya nsuka mpo na kosala bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya 8 Augusto; soki ezali te, bósalela banimero oyo ebimaki liboso na yango. Na elakiseli moko, mosakoli akolakisa zulunalo ntango azali kopesa litatoli ya libaku malamu.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Makambo nini esengeli kotalelama ntango masangá mibale to koleka ezali kosakola na teritware moko nzokande lisangá na lisangá esalaka makita na monɔkɔ na yango? Masangá mosusu ezwá mokumba ya kokende kosakola mingimingi na bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu. Mpo na yango, ekómaka ete masangá mibale to koleka, oyo mokomoko esalaka makita na monɔkɔ na yango, esakola na teritware moko. Masangá yango ekosalela malako oyo ezali na lisolo oyo.

Min. 20: “Kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu epesaka esengo.”b Ntango bokokóma na paragrafe 3, kɔtisá makanisi oyo ezali na Biyano na mituna na bino, na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2001. Tuná mwa mituna na mokɛngɛli moko na boyekoli ya mokanda ya lisangá. Tuná ye bibongiseli etali mosala ya kosakola oyo azwi mpo na etuluku na ye mpe matomba oyo basakoli ya etuluku na ye bazali kozwa na ndenge bapesaka litatoli elongo.

Loyembo 36 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 4 Augusto

Loyembo 178

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza oyo. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mikuse, oyo bandeko bakoki kosalela.

Min. 20: “Ndenge ya kolakisa mikanda na teritware oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge.”c Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Ntango bokokóma na paragrafe 3, salá elakiseli moko na monɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware na bino kasi lisangá oyo esalaka makita na monɔkɔ yango ezali te.—km 7/02 lok. 1 par. 4.

Min. 15: Bilenge bazali kokumisa Yehova! Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, mpe mituna-lisolo. Tosepelaka koyoka bilenge ntango bazali kopesa biyano oyo babongisaki malamu na makita. Molende mpe bokoli oyo bazali kosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esepelisaka biso. Bamonisaka kondima ya solosolo ntango bapesaka litatoli ya malamu na mosala ya kosakola. Etamboli na bango, oyo emonisaka ete babangaka Nzambe, ekumisaka ye. (yb88 nk. 53-54) Bokoli na bango na elimo ezali kopesa bango makoki oyo ekosala ete bázwa mikumba na lisangá na mikolo ezali koya. Tuná mwa mituna na baklisto mibale to misato oyo bazali naino bilenge kasi bapesaka mbala na mbala mabɔkɔ na misala ya lisangá. Pesá longonya ya solosolo na bilenge ya lisangá mpo na milende nyonso oyo bazali kosala mpo na kokumisa Yehova.

Loyembo 49 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto