Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe Lamuká! ya 22 Yuni, soki ezali te, bósalela nimero oyo ebimaki liboso na yango, na kotalela makanisi oyo ezali na lokosa 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka. Na elakiseli mokomoko tángá ata vɛrsɛ moko ya Makomami.
Min. 15: “Mosala ya kosakola ezali mosala ya libosoliboso ya baklisto”a Lendisá bilenge ete bátalela mapomboli oyo bakoki kozwa soki basali mosala ya ntango nyonso. Kɔtisá mpe makanisi oyo ezali na motó ya likambo ya moke “Ntango mimeseno ya mboka eyokani te na lisosoli,” oyo ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2000, nkasa 19-20.
Min. 20: “Kozwa epaso na mosala—Libaku ya kosala mingi?”b Soki likoki ezali, tuná mosakoli moko oyo asalelaki libaku ya kozwa epaso na mosala mpo na kosala mingi na mosala ya Yehova. Tuná ye mbongwana oyo asalaki mpe mapamboli oyo azwi. Lisolo oyo ekosalema na kotalela ndenge makambo ezalaka na esika oyo bozali. Pesá longonya na mibange mpo na molende na bango na mosala ya kosakola.
Loyembo 190 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Yuni
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 12: Bamposa ya lisangá.
Min. 25: “Zalá na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’”c Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Nsima ya kotalela paragrafe 5-6, Salá elakiseli moko ya mokuse, mpo na komonisa ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu na moteki moko ya magazini mpe kopesa ye trakte moko lokola, Aimeriez-vous en savoir plus sur la Biblia? (Olingi koyeba Biblia malamu?), soki ezali. Tángá paragrafe 7 mpe 8 liboso ya kolobela yango. Mpo na kosukisa, tángá mpe lobelá etanda “Kobosana bango te!”
Loyembo 131 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya 8 Yuli; soki ezali te, bósalela nimero oyo ebimaki liboso na yango, na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likóló ya zulunalo moko kaka. Na moko ya bilakiseli yango, mosakoli azali kopesa litatoli na balabala.
Min. 20: Okosala nini soki olɛmbi nzoto? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani na lisolo ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1999, nkasa 28-29, kino makambo oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya moke “Batelá elimo na yo malamu.” Lobelá makanisi oyo bandeko bakoki kosalela mpe toli oyo euti na Makomami. Sɛngá na mosakoli moko to basakoli mibale ya molende ete bámibongisa liboso mpo na kolobela makambo oyo esalisaka bango bábatela esengo na mosala ya kosakola.
Min. 15: “Kosakola na mokili oyo ezali ntango nyonso kobongwana.”d Ntango bokokóma na baparagrafe 2-3, tuná na bayangani likambo moko ebimi na mboka, oyo ekoki kosalelama na teritware ya lisangá na bino mpo na kobanda masolo. Ntango bokokóma na paragrafe 4 salá elakiseli ya mokuse, salelá lolenge moko ya kobanda lisolo oyo elobelami.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Yuni
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá na basakoli nyonso bápesa lapolo ya sanza ya Yuni. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto. Lakisá mingimingi mwa babuku mibale oyo ezali na libondo ya lisangá. Salá bilakiseli oyo ebongisami malamu mpo na ndenge ya kolakisa mwa babuku yango na mosala ya kosakola. Mpo na makanisi oyo esengeli kosalelama, talá Mosala ya Bokonzi ya Augusto 1998 na lokasa 8. Tokoki kokuta lolenge mosusu ya kobanda lisolo na Index ya mikanda ya la Société na motó ya likambo “Présentations” mpe motó moke ya likambo “Liste par publications.”
Min. 15: “Ata baoyo bazali na nzoto malamu te bakoki kobota mbuma.”e Lobelá mpe makanisi mosusu etali lolenge oyo bamosusu bakoki kosalisa, oyo ezali na Lamuká! ya 22 Augusto 1990, nkasa 22-23 (na Lifalanse), na motó ya likambo ya moke “Esengeli kosala nini?”
Min. 20: Salelá Liloba ya Nzambe malamumalamu mpo na kosakola nsango ya Bokonzi. Lisolo elongo na bayangani, ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Tosalaka makasi ya kopesa likanisi moko ya kolendisa oyo euti na Makomami na ntina etali Bokonzi epai na moto nyonso oyo tozali kokutana na ye na mosala ya kosakola. Kasi, tosengeli kosuka te kaka na kotánga mpamba vɛrsɛ ya Biblia. Tosengeli kolimbola, kopesa bandakisa mpe komonisa ndenge ya kosalela yango. Monisá lolenge oyo yango ekoki kosalema, salelá lokola bandakisa bavɛrsɛ mosusu oyo etyami na buku Comment raisonner, lokasa 175, na motó ya likambo ya moke oyo batɛngisi makomi na yango “Les gouvernement humains ne subviennent pas aux besoins urgents de l’humanité.” Nsima ya lisolo, sɛngá na mosakoli moko asala elakiseli moko oyo ebongisami malamu mpo na kolakisa lolenge ya kosalela vɛrsɛ moko malamumalamu na bozongeli ya sika, akolimbola yango na mokuse, akopesa ndakisa mpe akomonisa na moto oyo azali kosolola na ye ndenge oyo Bokonzi ekopesa ye matomba. Kaka na ebandeli ya elakiseli mosakoli akotángi vɛrsɛ. Nsima ya elakiseli, talelá lisusu ndenge alimbolaki vɛrsɛ yango, ndakisa oyo apesaki mpe lolenge amonisaki ndenge ya kosalela yango. Lendisá bato nyonso ete bákolisa makoki ya kosalela Liloba ya Nzambe malamumalamu.
Loyembo 171 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Yuli
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Makambo oyo basakoli bakutanaki na yango na lisangá na bino. Lobelá to salá bilakiseli oyo ekomonisa mpenza makambo oyo basakoli ya lisangá na bino bakutanaki na yango na teritware na (1) ntango bazalaki kosakola epai ya bato ya bikólo ndenge na ndenge to epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu, to (2) ntango bazalaki kosakola na lolenge mosusu, longola litatoli ya ndako na ndako mpe ya balalabala. Lendisá bato nyonso básalela malamu mikanda oyo ezali na minɔkɔ mosusu ntango bakutani na moto moko oyo asepeli na monɔkɔ mosusu oyo elobamaka na esika bozali.
Min. 25: “Tóyebisá bato nkombo ya Nzambe”f Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Ntango bokokóma na paragrafe 4, lobelá makanisi oyo ezali na etanda “Ils font connaître le nom de Dieu” na lokasa 124 ya buku Prédicateurs. Poná mosakoli moko ya makoki mpo asala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge ya kozongela bato. Akosalela mikapo mibale to misato oyo akozwa na buku Comment raisonner, na lokasa 200, mpo na komonisa mpo na nini ezali na ntina koyeba mpe kosalela nkombo ya Nzambe.
Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.