Manaka mpo na likita ya mosala
LIYEBISI: Na sanza ya Augusto tii na sanza ya Sɛtɛmbɛ, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya likita ya mosala kaka ndenge ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Pesá Nzambe nkembo.” Soki ekoki, na Likita ya Mosala oyo bokosala liboso bókende na liyangani, bósalela miniti 15 mpo na kolobela toli oyo ezali na siplema ya sanza oyo. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, Likita ya Mosala moko mobimba ekozala kaka mpo na kozongela makanisi ya ntina oyo tokoyoka na liyangani. Mpo na komibongisa na lisolo yango, biso nyonso tosengeli kozwa mwa banɔti na makambo ya ntina oyo ekolobama na liyangani, tokoki mpe kokoma makanisi ya ntina oyo toyoki mpe tolingi kosalela yango na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola. Na nsima, tokoki kolendisa bandeko mosusu mpe kolimbolela bango ndenge oyo tosalelaki batoli yango na bomoi na biso banda liyangani esilaki.
Pɔsɔ ebandi na 14 Aprili
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kobongisa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili mpe Lamuká! ya 22 Aprili. Na elakiseli mokomoko, esengeli kopesa bazulunalo nyonso mibale mbala moko, atako bakobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.
Min. 20: “Bóngɛnga lokola miinda.”a Na nsuka ya lisolo, salelá miniti 5 ya nsuka mpo na kolobela makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1997, nkasa 14-15, paragrafe 8-13. Monisá polele ntina nini tosengeli te kobombela bato nsango ya Bokonzi.
Loyembo 134 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: “Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova.”b Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Lendisá bandeko nyonso bázala na liyangani mikolo nyonso misato, kobanda mokolo ya mitano na ntɔngɔ tii mokolo ya lomingo nsima ya nzanga. Monisá ete tosengeli kosalela makambo oyo tokoyoka kuna, tósuka kaka te na koyoka. Lobelá liyebisi oyo ezali na ebandeli ya manaka ya lokasa oyo mpo na Likita ya Mosala oyo ekobongisama na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ntango tokozongela makanisi ya ntina ya liyangani ya etúká. Lendisá bandeko nyonso bázwa banɔti na liyangani.
Min. 20: “Opesa nzela na yango.”c Na ntango lisolo ezali kosalema, tuná ndeko moko to bandeko mibale oyo bazali kosalela bonzemba na bango na ndenge ya malamu mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Bámonisa makambo nini esalisaka bango bázala na esengo na mosala na bango.
Loyembo 35 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala mpo na sanza ya Aprili. Salá bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya 8 Mai na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8.
Min. 15: “Zalá ndakisa na misala ya malamu.”d Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Limbolá mpo na nini etamboli malamu ya mokomoko na biso ezali na ntina mingi.
Min. 20: “Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia.”e Ekosalema na nkulutu moko, akotuna mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá na bayangani báyebisa na mokuse makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola oyo eyokani na lisolo. Na paragrafe 5, bongisá elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kobanda boyekoli ya Biblia na teritware na bino.
Loyembo 89 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 5 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse batoli oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprili 2002, lokasa 2, na motó ya likambo “Tómibongisa mpo na bantango ya konje.”
Min. 20: “Molato ya malamu emonisaka ete tozali kokumisa Nzambe.”f Ekosalema na nkulutu moko. Tuná mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá ndeko mobali moko oyo atángaka malamu atánga paragrafe mokomoko na mongongo makasi.
Min. 15: Lapolo ya malamu—Ezalaka ntina ya esengo. (Masese 15:30) Lisolo elongo na bayangani, ekolobela milende oyo lisangá esalaki na basanza ya Marsi mpe Aprili. Sɛngá bandeko ya lisangá báyebisa makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango: (1) basalisaki moto oyo azali na mposa ya solo ayangana na Ekaniseli, (2) basalaki lokola babongisi-nzela basungi, (3) balendisaki mosakoli oyo atiká kobima na mosala ya kosakola mpo azongela misala na ye na kati ya lisangá, (4) basalisaki moto ya sika abanda kosakola, mpe (5) balandelaki bato oyo bayanganaki na Ekaniseli. Bongisá makanisi yango mosusu liboso elongo na bandeko. Pesá bandeko longonya, mpe lendisá basakoli nyonso bálendendela na milende ya ndenge wana na mikolo oyo ezali koya.
Loyembo 126 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.