Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi mpe Lamuká! ya 22 Marsi na kotalela makanisi oyo ezali na lok. 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.
Min. 15: “Solo na likambo etali nkisi, bondɔki, mpe bonganga-nkisi.” (Eteni 1)a Salelá mwa buku Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?, nk. 15-16 (par. 1-9). Ekosalema na nkulutu moko ya makoki. Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 3 Marsi, bópesa liyebisi ete bayangani bábongisa lisolo oyo mpe bámema mwa buku yango na likita ya pɔsɔ oyo mpe pɔsɔ oyo ebandi na 24 Marsi. Tángá par. 6-9. Monisá mpenza ete ezali na ntina mingi kotika nzela te ete lokuta oyo Satana azali kopanza ekanga biso na boombo. Nkulutu yango akosala nyonso mpo bayangani básimba mpenza makanisi nyonso mpe bábongola ndimbola na yango te na biyano oyo ezali solo te. Na maloba ya nsuka, lendisa bayangani bábongisa Eteni 2 oyo ekotalelama na pɔsɔ oyo ebandi na 24 Marsi.
Min. 20: “Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!”b (par. 1-12) Nsima ya kotalela par. 6, bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa ndenge mosakoli moko azali kobengisa ndeko na ye, to moto moko ya kartye, to moninga na ye ya kelasi to ya mosala na Ekaniseli; akosalela lokasa ya libyangi. Soki basakoli bazwi naino nkasa ya libyangi na Ekaniseli te, bopesa bango yango nsima ya likita oyo.
Loyembo 19 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: Zalá na bwanya ntango ozali kopona baninga na yo. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko; akosalela makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 22 Febwali 1997 (na Lifalanse), lok. 13, mpe makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo moke “Les mauvaises compagnies” na buku Comment raisonner, nk. 192-193. Monisá ndenge oyo mitinda yango etaleli bilenge ná mikóló. Monisá polele matomba ya kopona baninga kati ya bato oyo balingi Yehova mpe bamonisaka ete bazali kosala milende mpo na kotosa mitinda na ye.
Min. 20: “Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!”c (par. 13-26) Ekosalema na mokɛngɛli-mokambi. Ntango bozali kotalela par. 14, salá elakiseli: nkulutu moko azali epai ya ndeko moko oyo atambolaka lisusu te, ayei kolendisa ndeko yango. Nkulutu azali komonisa mosakoli yango, na boboto mpenza, ndenge oyo akoki kosangana na mosala monene ya kosakola oyo lisangá ezali kosala na boumeli ya mikolo oyo ezali liboso ya Ekaniseli.
Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Na kotalela makanisi oyo ezali na lok. 8, salá bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya 8 Aprili.
Min. 15: “Solo na likambo etali nkisi, bondɔki, mpe bonganga-nkisi.” (Eteni 2)d Salelá mwa buku Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?, nk. 16-18 (par. 10-17 ná etanda ya lok. 18). Ekosalema na nkulutu moko ya makoki. Tángá par. 10-14. Na maloba ya ebandeli, lobelá lisusu makambo mibale ya lokuta oyo totalelaki na Eteni 1, makambo oyo Satana alingi ete bato bándima. Nkulutu yango akosala nyonso mpo bayangani básimba mpenza makanisi nyonso mpe bábongola ndimbola na yango te na biyano oyo ezali solo te. Monisá polele matomba oyo eutaka na kosalela Nzambe ya solo, ye oyo abatelaka biso mpo tozali kotosa ye.
Min. 20: Batatoli ya Yehova—Bato oyo basalelaka bato bolamu na bisika bafandi. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Tozwaka libaku ya komonisa ndenge oyo mosala na biso ya kosakola mpe ndakisa na biso ememelaka bato oyo tofandi na bango bolamu. Sɛngá bayangani bápesa makanisi na bango na makambo elandi: (1) Toteyaka bato bátosaka mitinda ya Biblia oyo etali bizaleli malamu. (2) Toteyaka bato básalaka makambo na bosembo mpe bámemyaka bakonzi. (3) Toteyaka boyokani kati na bato ya mposo ndenge na ndenge, bato ya bikólo ndenge na ndenge mpe kati na bato ya ndenge na ndenge. (4) Tosalisaka basusu bábongisa bomoi na bango ya libota; yango wana, tolendisaka bango bátosaka mitinda ya Biblia. (5) Tolakisi ebele ya bato kotánga mpe kokoma. (6) Tomipesaka mpenza mpo na kosalisa basusu na ntango ya makama. (7) Tosali mosala monene mpo ete bonsomi ya losambo, oyo bato nyonso bazali kozwela yango litomba lelo oyo, ekoka kotosama.—Talá buku Prédicateurs, lok. 699.
Loyembo 121 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 31 Marsi
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya sanza ya Marsi. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Aprili. Lobelá makanisi oyo ezali na etanda “Tóyekola Biblia na bato na lisalisi ya buku Tósambela Nzambe.” Lobelá etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.”
Min. 13: Makambo oyo basakoli bakutanaki na yango na lisangá na bino. Sɛngá basakoli ya lisangá báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango na sanza ya Marsi ntango bamipesaki mingi na mosala ya kosakola. Pesá bango longonya mpo na milende na bango, mpe lendisá bango básakola lisusu mingi na sanza ya Aprili soki bazali na likoki ya kosala yango.
Min. 20: “Yehova abongi mpenza kokumisama mingi.”e Monisá mpenza ntina ya Ekaniseli. Monisá ndenge oyo bayangani nyonso bakoki kosalisa basusu bázala na likita yango. Yebisá makambo oyo ekoki kosalema mpo na kokutana na baoyo batiká kosakola mpo na kolamusa lisusu mposa na bango. Sɛngá bayangani báyebisa mwa makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na Ekaniseli ya mbula eleki.
Loyembo 173 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Ndenge ya kosalela Makomami mpo na kososolisa bato. Lisolo elongo na bayangani. Ndenge nini tokoki kokóma na likoki ya kososolisa bato na ndenge ya malamu mpenza na mosala ya kosakola? (1) Yebá Makomami malamu na nzela ya momeseno ya koyekola yo moko mpe ya koyangana na makita. (2) Kanisá malamumalamu makambo ozali koyekola, luká koyeba solo na mozindo. (3) Kosuka kaka te na koluka ndenge oyo bavɛrsɛ elimbolami, kasi luká mpe koyeba makambo nini ya Makomami etindaki na kozwa bandimbola yango. (4) Kanisá ndenge oyo okolimbolela bato ya ndenge na ndenge bavɛrsɛ. (5) Kanisá bandakisa oyo okoki kopesa mpo na komonisa polele makanisi mosusu.
Min. 20: “Ndenge oyo solo epesaka biso bonsomi.”f Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1998, etanda ya lok. 6. Sɛngá bayangani báyebisa ndenge oyo solo ya Liloba ya Nzambe epesi bango bonsomi.
Loyembo 217 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.