Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali mpe Lamuká! ya 22 Febwali na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo nyonso mibale mbala moko, atako bakobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.
Min. 35: “Sakolá mpe pesá litatoli malamumalamu.”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lendisá baoyo nyonso bazali na likoki básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Marsi mpe Aprili. Sɛngá baoyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo euti koleka bálobela yango. Ndenge nini babongisaki manaka mpe makambo na bango mosusu mpo bázala babongisi-nzela? Milende nini basalaki mpe makambo nini babongisaki mpo bákoka kosala yango? Makambo nini esepelisaki bango mingi mpe mapamboli nini bazwaki? Bótalela ndakisa ya manaka oyo ezali na lokasa 4. Yebisá ete nsima ya likita oyo, baoyo balingi bakoki kotondisa lokasa ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
Loyembo 30 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Marsi. Salelá lolenge moko to mibale ya kolakisa buku Boyebi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002. Lobelá mpenza mokano tozali na yango ya kobanda koyekola na bato Biblia.
Min. 15: “Okolinga makita esalemaka na ndako na yo?” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli moko ya boyekoli ya mokanda. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na “Biyano na mituna na bino” ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Aprili 2001 ná oyo ya sanza ya Sɛtɛmbɛ 1990. Yebisá mpe bituluku boni ya boyekoli ya mokanda ezali na lisangá na bino mpe bato boni bayanganaka na likita yango. Sɛngá na mosakoli moko to basakoli mibale bálobela matomba oyo bazwaki elongo na mabota na bango mpo boyekoli ya mokanda ya lisangá ezalaki kosalema na ndako na bango. Baoyo nyonso bakolinga ete boyekoli ya mokanda esalema na ndako na bango basengeli koyebisa mokɛngɛli-mokambi.
Min. 20: “Likambo nini otyaka na esika ya liboso?”b Sɛngá mosakoli moko to basakoli mibale bámibongisa liboso mpo báyebisa ndenge bamibongisaki mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.
Loyembo 57 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala mpo na sanza ya Febwali. Salá bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya 8 Marsi na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Na bilakiseli nyonso mibale, esengeli kopesa bazulunalo nyonso mibale mbala moko, atako bakobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.
Min. 15: “Lisalisi na ntango oyo ebongi mpenza.” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Monisá mpenza ete milende ya solosolo oyo ezali kosalema mpo na kosunga baoyo batiki kosakola ezali komonisa ndenge oyo Yehova amibanzabanzaka na bolingo nyonso mpo na basaleli na ye.
Min. 20: Litomba nini ozwaka na botángi ya Annuaire? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Liboso, tángá mpe lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.” Na nsima, tuná bayangani bálobela makambo oyo ezali na Annuaire 2002 mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango oyo elendisaki bango mingi mpe ekómisaki kondima na bango makasi. Lendisá bandeko nyonso básilisa kotánga Annuaire 2003 ntango bakozwa yango mpe básalela yango mpo na komesenisa bayekoli ya Biblia na ebongiseli ya Yehova.
Loyembo 56 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse “Ebongiseli ya sika mpo na babibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi.” Yebisá nani akozala mobateli ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi na bino.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Bózala bato ya makanisi malamu awa nsuka ekómi pene.”c Na paragrafe 3-4, sɛngá basakoli báyebisa mikano ya elimo oyo bazali na yango sikoyo. Kɔtisá mpe makanisi oyo ezali na buku Tósambela Nzambe na lokasa 176.
Loyembo 127 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.