Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/03 lok. 1
  • Mosala oyo esɛngaka komikitisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala oyo esɛngaka komikitisa
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Tólona komikitisa ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yesu apesi biso ndakisa ya komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 1/03 lok. 1

Mosala oyo esɛngaka komikitisa

1 Liloba ya Nzambe epesi biso toli tózala ‘bato ya elimo ya komikitisa, tózongisaka mabe na mabe te . . . , kutu biso tópesaka nde lipamboli.’ (1 Pet. 3:8, 9) Tosengeli mpenza kosalela toli yango na mosala ya kosakola. Ya solo, mosala ya kosakola emekaka komikitisa na biso.

2 Komikitisa ezali ezaleli moko oyo esalisaka biso tóyika mpiko na makambo mabe. Na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato oyo toyebi bango te mpe oyo babengaki biso epai na bango te, kasi toyebi malamu ete basusu bakoki komonisela biso ezaleli ya mabe. Mpo na kolanda kosakola ntango ozali kokutana na makambo ya ndenge wana, esɛngaka kozala na komikitisa. Na teritware moko oyo ezalaki mpasi mpo na kosakola kuna, babongisi-nzela mibale ya basi basakolaki ndako na ndako mikolo nyonso na boumeli ya mbula mibale, kasi ata moto moko te ayambaki bango! Kasi balɛmbaki te, lelo oyo masangá mibale ezali na teritware yango.

3 Ntango bato bamoniseli biso makambo makasi: Soki tozali na komikitisa, yango ekosalisa biso tómekola Yesu ntango bato bamoniseli biso boboto te to soki bamoniseli biso limemya te. (1 Pet. 2:21-23) Na ndako moko, mwasi moko mpe na nsima mobali na ye bafingaki ndeko mwasi moko, mpe mobali yango abenganaki ye. Ndeko mwasi wana asɛkaki kaka mpe ayebisaki bango ete azali kolikya ete akosolola na bango mokolo mosusu. Likambo yango esimbaki motema ya babalani wana, mpe yango etindaki bango báyoka ntango motatoli mosusu ayaki kosakola mpe bandimaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Ndeko mwasi oyo bango babenganaki ye ayaki kopesa bango mbote mpe kopesa bango litatoli mwa mingi. Biso mpe tokoki kolɛmbisa mitema ya bato oyo balingaka te koyoka nsango malamu soki tozali komonisa ‘elimo ya boboto mpe ya limemya makasi.’​—1 Pet. 3:15; Mas. 25:15.

4 Boyá lolendo: Boyebi na biso ya Biblia epesi biso nzela te tómonaka bato mpamba to tótyolaka bango. (Yoa. 7:49) Kutu, Liloba ya Nzambe epesi biso nde toli tóloba “mabe mpo na moto te.” (Tito 3:2) Ntango tozali na elimo ya komikitisa, ndenge oyo Yesu azalaki na yango, tokobɔndisa basusu. (Mat. 11:28, 29) Kozala na komikitisa ebendaka bato báyoka nsango na biso.

5 Ya solo, komikitisa esalisaka biso tóyika mpiko na teritware oyo mosala ya kosakola ezalaka na mikakatano mingi. Ekoki kolɛmbisa mitema ya bato oyo baboyaka koyoka, mpe kobenda basusu bándima nsango ya Bokonzi. Kasi oyo ezali na ntina koleka, esepelisaka Yehova, oyo “amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.”—1 Pet. 5:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto