Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/02 nk. 3-6
  • Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • PROGRAMƐ
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 10/02 nk. 3-6

Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003

Malako

Na mobu 2003, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

MIKANDA: Biblia haut fleuve, elongo na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].

Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO ETYAMI na loyembo, na libondeli, mpe na kotombela bandeko boyei malamu, mpe nsima na yango ekosalema boye:

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali na makoki asengeli kosala lisolo likoló ya toli moko mpo na koloba malamu, oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, mosaleli na misala ya makoki akoki kosala lisolo yango.) Soki liyebisi ezali te, esengeli mpe kolobela makambo oyo ezali na bitanda na nkasa oyo lisolo yango ezali. Lisolo oyo ekolobela badevuare te. Badevuare yango etali moto na moto mpe ezali mpo na kopesa toli na nkuku.

LISOLO No. 1: Miniti 10. Ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 10 kozanga kotuna mituna ya bozongeli. Ntina ya masolo yango ezali te bobele ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo kasi nde ya kobenda likebi mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli yango mpe kobimisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela bobele motó ya likambo oyo epesami. Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa ye toli na nkuku soki esengeli.

MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti motoba ya ebandeli, nkulutu moko ya makoki to mosaleli na misala moko ya makoki akosala lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá. Soki alingi, akoki kobimisa makanisi na mokapo oyo asepeli na yango na botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ yango, mpamba te ndeko oyo akosala lisolo No. 2, akobimisa te makanisi ya bavɛrsɛ oyo atángi. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse makambo oyo ezali na mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa bango. Na nsima, na boumeli ya miniti minei, molobi akosɛnga na bayangani bápesa makanisi na bango na mokuse (basegɔnde 30 to na nse na yango) na mituna mibale oyo: “Makambo nini omonaki na pɔsɔ oyo na botángi ya Biblia oyo okoki kozwela yango matomba na mosala na yo ya kosakola to na bomoi na yo?” mpe “Makambo nini ekómisaki kondima na yo makasi mpe ebakisaki botɔndi na yo mpo na Yehova?” Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi bákende na bakelasi na bango.

LISOLO No. 2: Miniti 4. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Mingimingi, akotánga Biblia. Mbala moko na sanza, botángi ekouta na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mwana-kelasi akosala kaka botángi, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Botángi ya pɔsɔ na pɔsɔ, ekoki kozala molai to mokuse, kasi esengeli kaka kosalema na miniti minei to na nse. Mokɛngɛli na eteyelo asengeli kotánga masolo oyo mwana-kelasi akotánga liboso ete akabola yango, na ndenge wana akoyeba mwana-kelasi nini oyo ye akoki kopesa lisolo yango na kotalela mbula na ye mpe makoki na ye. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.

LISOLO No. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai na ndeko mwasi. Bana-kelasi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre to bakopesa bango moko ya bakadre oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe akosalela yango na eteni moko ya mosala ya kosakola oyo ekomonisa ndenge makambo ezali mpe oyo ekoki kosalelama na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kosala bolukiluki na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Bakopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo bamonisi esika bakozwa makambo bakolobela. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa polele makanisi ya lisolo bapesi ye mpe, na ndenge azali kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe akanga makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokumba oyo ekopesama kaka epai ya mwana-kelasi oyo ayebi kotánga. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo azali kosala lisolo.

LISOLO No. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kosala lisolo na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bamonisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka makambo oyo akosalela na lisolo na ye na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, asengeli kosala yango lokola lisukulu, kasi abosana te ete akosala yango liboso ya bayangani na Ndako ya Bokonzi. Soki bapesi yango na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda toli epesami na lisolo No. 3. Tyá likebi ete masolo nyonso oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango epesama kaka na bandeko mibali, mpe bakosala yango lokola lisukulu.

BOUMELI: Lisolo moko te esengeli kolekisa ngonga oyo bapesi yango; ezali mpe bobele bongo mpo na makanisi mpe toli ya mokɛngɛli na eteyelo. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2 kino No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki bandeko oyo bazali kosala lisolo ya liboso etali toli mpo na koloba malamu, to lisolo No. 1, to makanisi ya ntina na botángi ya Biblia balekisi ngonga, basengeli kozwa toli na nkuku. Bato nyonso basengeli kotalela mpe kolanda ngonga oyo bapesi bango malamumalamu. Eteyelo mobimba ekoumela miniti 45, longola loyembo mpe libondeli.

TOLI: Miniti 1. Nsima ya lisolo ya mwana-kelasi mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo asengeli kosalela kaka miniti moko mpo na kopesa toli; na toli na ye, asengeli kopesa mwana-kelasi longonya na likambo moko oyo asalaki malamu na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba ‘osali yango malamu,’ kasi asengeli komonisa ntina oyo ye alobi ete ezali malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli nsima ya makita to na ntango mosusu.

MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, lisangani ya bankulutu bakopona nkulutu moko ya makoki, soki amonani, oyo akozala mopesi-toli mosungi. Akozala na mokumba ya kopesa toli na nkuku soki esengeli, na bandeko mibali oyo bazali kosala lisolo No. 1 mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te ete apesa toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala. Ebongiseli yango ekobanda na 2003 mpe ekoki kobongwana nsima.

LOKASA YA TOLI: (Ezali na buku)

BOZONGELI YA KOLOBA: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli ya koloba. Liboso ya kosala yango, lisolo etali toli mpo na koloba malamu mpe ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli ya koloba ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na basanza mibale eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ wana.

PROGRAMƐ

6 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 1-6 Loyembo 91

Toli mpo na koloba malamu: Boyei malamu na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (be lok. 5 par. 1-lok. 8 par. 1)

No. 1: Sepelá na Liloba ya Nzambe (be lok. 9 par. 1-5)

No. 2: Matai 4:1-22

No. 3: Ndenge nini elembo ya mikolo ya nsuka esimbaka bomoi ya baklisto ya solo? (rs lok. 93 par. 1-2)

No. 4: Yesu azali kosala nini sikoyo?

13 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 7-11 Loyembo 40

Toli mpo na koloba malamu: Tángáká Biblia mokolo na mokolo (be lok. 10 par. 1-lok. 12 par. 3)

No. 1: ‘Bókima mbangu na ndenge yango’ (w01 1/1 nk. 28-31)

No. 2: Matai 9:9-31

No. 3: Ntina oyo tosakwelaka bato mosusu

No. 4: Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete mikolo ya nsuka ebandaki na 1914? (rs lok. 94 par. 2-lok. 95 par. 1)

20 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 12-15 Loyembo 133

Toli mpo na koloba malamu: Kotánga malamu (be lok. 83 par. 1-5)

No. 1: Okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto! (w01 1/2 nk. 20-23)

No. 2: Matai 13:1-23

No. 3: Bato mosusu bakozala solo na bomoi na mabele nsima ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? (rs lok. 95 par. 2-5)

No. 4: Nzambe abongwanaka?

27 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 16-21 Loyembo 129

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kotánga malamu (be lok. 84 par. 1-lok. 85 par. 3)

No. 1: Ntango elekaka noki mpenza (si nk. 278-279 par. 1-6)

No. 2: w01 15/1 lok. 20 par. 20–lok. 21 par. 24

No. 3: Eloko nini ekotya bomoko na mokili?

No. 4: Mpo na nini Nzambe azali kotika ntango molai boye liboso aboma bato mabe? (rs lok. 96 par. 1-3)

3 Feb. Botángi ya Biblia: Matai 22-25 Loyembo 139

Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa maloba polele (be lok. 86 par. 1-6)

No. 1: “Bókeba na ndenge bozali koyoka” (be lok. 13 par. 1–lok. 14 par. 5)

No. 2: Matai 22:15-40

No. 3: Ndenge oyo toyebi ete elembo ezali kokokisama na ntango na biso (rs lok. 96 par. 5–lok. 97 par. 2)

No. 4: Moombo ya sembo mpe ya mayele azali mpenza nani?

10 Feb. Botángi ya Biblia: Matai 26–28 Loyembo 27

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobimisa maloba polele (be lok. 87 par. 1–lok. 88 par. 3)

No. 1: Ndenge ya kozwa bolamu ya solosolo (w01 1/3 nk. 4-7)

No. 2: Matai 26:6-30

No. 3: Ntina oyo namɛlaka bangi te

No. 4: Ntina ya bomoi ya bato ezali nini? (rs lok. 434 par. 1–lok. 435 par. 3)

17 Feb. Botángi ya Biblia: Malako 1-4 Loyembo 137

Toli mpo na koloba malamu: Ebengeli ya maloba​—Makambo oyo osengeli kotalela (be lok. 89 par. 1–lok. 90 par. 3)

No. 1: Biloko bikolakisaka ntango na kati ya Biblia (si nk. 279-280 par. 7-13)

No. 2: w01 15/2 lok. 25 par. 10–lok. 26 par. 14

No. 3: Bato bazalisamaki kaka mpo bázala na bomoi mwa ntango mokuse mpe na nsima bákufa? (rs lok. 435 par. 4-lok. 436 par. 2)

No. 4: Ntina oyo kobɛta masano ya mbongo ezali malamu te

24 Feb. Botángi ya Biblia: Malako 5-8 Loyembo 72

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobongisa ebengeli ya maloba (be lok. 90 par. 4–lok. 92)

Bozongeli ya koloba

3 Mar. Botángi ya Biblia: Malako 9-12 Loyembo 195

Toli mpo na koloba malamu: Kokakatana na maloba te (be lok. 93 par. 1–lok. 94 par. 3)

No. 1: Ndenge ya kolanda masukulu, koyoka masolo ya mituna mpe biyano, mpe koyoka na mayangani ya mike mpe ya minene (be lok. 15 par. 1–lok. 16 par. 5)

No. 2: Malako 10:1-22

No. 3: Ndenge oyo tokoki kozwa nguya na Nzambe

No. 4: Makambo nini epesaka biso elikya ete tokozala na bomoi ya seko? (rs lok. 437 par. 1-3)

10 Mar. Botángi ya Biblia: Malako 13-16 Loyembo 187

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya komibongisa mpo okakatana na maloba te (be lok. 94 par. 4–lok. 96 par. 2, longola etanda na lok. 95)

No. 1: Paladiso ya elimo ezali nini? (w01 1/3 nk. 8-11)

No. 2: Malako 13:1-23

No. 3: Ndenge nini elaka ya bomoi na mikolo ezali koya ekokokisama? (rs lok. 437 par. 4–6)

No. 4: Ntango bato babundaka bitumba, Yehova amikɔtisaka na ngámbo nini?

1 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 1-3 Loyembo 13

Toli mpo na koloba malamu: Oyo okoki kosala soki ozali na likukuma (be lok. 95, etanda)

No. 1: “Esengo na moto oyo azwi bwanya” (w01 15/3 nk. 25-28)

No. 2: Luka 3:1-22

No. 3: Ebongi kosambela Yesu?

No. 4: aKobala na ndenge oyo mobeko ya Leta ezali kosɛnga ezali na ntina? (rs lok. 224 par. 2–lok. 225 par. 1)

24 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 4-6 Loyembo 156

Toli mpo na koloba malamu: Ntango bilembo esɛngi ete opema mpe kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu (be lok. 97 par. 1–lok. 98 par. 6)

No. 1: Omonaka ete bato bakaniselaka yo mabe? (w01 1/4 nk. 20-23)

No. 2: Luka 6:1-23

No. 3: Ekaniseli emonisaka mpenza nini? (rs lok. 242 par. 1–3)

No. 4: Baklisto basengeli kolikya ete Nzambe akobatela bango?

31 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 7-9 Loyembo 47

Toli mpo na koloba malamu: Kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina, kopema mpo na koyoka (be lok. 99 par. 1–lok. 100 par. 4)

No. 1: “Bangá Nzambe ya solo mpe tosá bakomandema na ye” (be lok. 272 par. 1–lok. 275 par. 3)

No. 2: w01 15/3 lok. 18 par. 17–lok. 19 par. 20

No. 3: Ndenge oyo toyebi ete Biblia euti na Nzambe

No. 4: Limpa na vinyo ya Ekaniseli emonisi nini? (rs lok. 242 par. 4-lok. 243 par. 1)

7 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 10-12 Loyembo 68

Toli mpo na koloba malamu: Koyeba konyata maloba ya ntina (be lok. 101 par. 1lok. 102 par. 3)

No. 1: “Kopesa litatoli na ntina etali Yesu” (be lok. 275 par. 4–lok. 278 par. 4)

No. 2: Luka 10:1-22

No. 3: Banani mpenza basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli? (rs lok. 243 par. 3–4)

No. 4: Milulu nini esalemaki mpo na libala ya mobali na mwasi ya liboso? (rs lok. 225 par. 2-3)

14 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 13-17 Loyembo 208

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobongisa mpo na koyeba konyata maloba ya ntina (be lok. 102 par. 4–lok. 104 par. 4)

No. 1: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi” (be lok. 279 par. 1–lok. 281 par. 4)

No. 2: Luka 15:11-32

No. 3: Ndenge oyo tokoki komibatela na bademo

No. 4: Ekaniseli esengeli kosalema mbala boni, mpe mokolo nini? (rs lok. 244 par. 3-lok. 245 par. 1)

21 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 18-21 Loyembo 23

Toli mpo na koloba malamu: Konyata makanisi ya ntina (be lok. 105 par. 1–lok. 106 par. 1)

No. 1: Bileko ezali ebongiseli ya Yehova oyo emonisi bwanya mpe bolingo na ye (si lok. 280 par. 14-17)

No. 2: w01 15/4 lok. 6 par. 19–lok. 7 par. 22

No. 3: Ndenge oyo elikya ya lisekwa esimbaka bomoi na biso

No. 4: bBiblia epesi nzela ya kobala basi ebele to mibali ebele? (rs lok. 225 par. 4–lok. 226 par. 5)

28 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 22-24 Loyembo 218

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na mongongo oyo ebongi na kotalela bato oyo bakoyoka yo (be lok. 107 par. 1–lok. 108 par. 5)

Bozongeli ya koloba

5 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 1-4 Loyembo 31

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobongisa mongongo na yo (be lok. 109 par. 1–lok. 110 par. 2)

No. 1: Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na móto (be lok. 17 par. 1–lok. 19 par. 1)

No. 2: Yoane 2:1-25

No. 3: Nzambe apekisi komɛla masanga?

No. 4: cNdenge nini Nzambe atalelaka likambo ya kokabwana na mobalani? (rs lok. 227 par. 1)

12 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 5-7 Loyembo 150

Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo​—Salelá mongongo na yo na ndenge oyo ebongi (be lok. 111 par. 1–lok. 112 par. 2)

No. 1: Okoki kolonga ata soki babɔkɔlaki yo ndenge nini (w01 15/4 nk. 25-28)

No. 2: Yoane 5:1-24

No. 3: Ntina liteya oyo elobaka ete makambo nyonso esilá kokanama liboso ebongi te

No. 4: dBiblia elobi nini mpo na likambo ya koboma libala mpe kobala moto mosusu? (rs lok. 227 par. 2-lok. 228 par. 2)

19 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 8-11 Loyembo 102

Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo​—Lobá mwa malɛmbɛ to mwa mbangu (be lok. 112 par. 3-lok. 113 par. 1)

No. 1: ‘Bwanya ekobakisela biso mikolo’ (w01 15/5 nk. 28-31)

No. 2: Yoane 10:16-42

No. 3: Mpo na nini na ntango ya kala Nzambe atikaki nzela ete bandeko bábalanaka? (rs lok. 228 par. 3-4)

No. 4: Ndenge oyo tokoki kolonga mitungisi

26 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 12-16 Loyembo 24

Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo​—Komatisa to kokitisa mongongo (be lok. 113 par. 2–lok. 114 par. 4)

No. 1: Ndenge oyo Makomami Mosantu ezali kolobela mbula (si nk. 280-282 par. 18-23)

No. 2: w01 1/5 lok. 14 par. 4–lok. 15 par. 7

No. 3: Kozala “bato ya mokili te” elimboli nini?

No. 4: Makambo nini esalisaka mpo na kobongisa libala? (rs lok. 229 par. 1-4)

2 Yuni Botángi ya Biblia: Yoane 17-21 Loyembo 198

Toli mpo na koloba malamu: Lobá na motema na yo mobimba (be lok. 115 par. 1–lok. 116 par. 4)

No. 1: Mosala ya elimo ya Nzambe mpo na komikundola (be lok. 19 par. 2–lok. 20 par. 3)

No. 2: Yoane 20:1-23

No. 3: Makambo nini esalisaka mpo na kobongisa libala? (rs lok. 229 par. 5-lok. 230 par. 2)

No. 4: Lingomba ezali na ntina?

9 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 1-4 Loyembo 92

Toli mpo na koloba malamu: Na kotalela lisolo na yo, yebá esika oyo okobakisa esengo (be lok. 116 par. 5–lok. 117 par. 4)

No. 1: Kómisá elikya na yo makasi epai ya Yehova (w01 1/6 nk. 7-10)

No. 2: Misala 4:1-22

No. 3: Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Malia oyo ezali na Biblia? (rs lok. 230 par. 3-8)

No. 4: Ndenge oyo tosambelaka Nzambe ezali na ntina epai na ye?

16 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 5-7 Loyembo 2

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na nsai (be lok. 118 par. 1–lok. 119 par. 5)

No. 1: Koyambola oyo ezongisaka moto makasi na elimo (w01 1/6 nk. 28-31)

No. 2: Misala 7:1-22

No. 3: Makambo oyo ekesenisaka Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu

No. 4: Malia azalaki mpenza ngɔndɔ ntango abotaki Yesu? (rs lok. 231 par. 1-2)

23 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 8-10 Loyembo 116

Toli mpo na koloba malamu: Komonisa mayoki (be lok. 119 par. 6–lok. 120 par. 5)

No. 1: Tótalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali na mpasi na bango (w01 15/6 nk. 9-12)

No. 2: w01 1/6 lok. 12 par. 1–lok. 13 par. 5

No. 3: Malia atikalaki ngɔndɔ libela? (rs lok. 231 par. 3–lok. 232 par. 1)

No. 4: eMpo na nini kosangana na makita ezali na ntina mingi mpo na kokola na elimo

30 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 11-14 Loyembo 167

Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kosala bajɛstɛ mpe kosalela elongi (be lok. 121 par. 1-4)

Bozongeli ya koloba

7 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 15-17 Loyembo 38

Toli mpo na koloba malamu: Kosala bajɛstɛ mpe kosalela elongi (be lok. 122 par. 1–lok. 123 par. 3)

No. 1: Mpo na nini ebongi omipesa na kotánga? (be lok. 21 par. 1–lok. 23 par. 3)

No. 2: Misala 15:1-21

No. 3: Lolenge oyo tokɔtelaka Bokonzi monene ya Yehova

No. 4: Malia azalaki mama ya Nzambe? (rs lok. 232 par. 2–4)

14 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 18-21 Loyembo 32

Toli mpo na koloba malamu: Kotala bato oyo bazali koyoka yo na mosala ya kosakola (be lok. 124 par. 1–lok. 125 par. 4)

No. 1: Kotika te ete ntembe ebebisa kondima na yo (w01 1/7 nk. 18-21)

No. 2: Misala 19:1-22

No. 3: fMalia azalaki na lisumu te ntango abotamaki? (rs lok. 233 par. 1–2)

No. 4: ‘Kokoba koluka liboso bokonzi’ elingi koloba nini?

21 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 22-25 Loyembo 222

Toli mpo na koloba malamu: Kotala bato oyo bazali koyoka yo ntango ozali kosala lisukulu (be lok. 126 par. 1–lok. 127 par. 2)

No. 1: Okangaka solo motema na mabunga ya bato mosusu? (w01 15/7 nk. 21-23)

No. 2: Misala 24:1-23

No. 3: Zabolo azali mpenza solo?

No. 4: gMalia abutaki na likoló na nzoto na ye ya mosuni? (rs lok. 234 par. 1-2)

28 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 26-28 Loyembo 14

Toli mpo na koloba malamu: Koloba ndenge omeseni koloba na mosala ya kosakola (be lok. 128 par. 1–lok. 129 par. 1)

No. 1: Mobu zero ezali te (si lok. 282 par. 24-26)

No. 2: w01 1/7 lok. 14 par. 5-8

No. 3: Ebongi ete tóbondela Malia mpo ye alobela biso epai ya Nzambe? (rs lok. 234 par. 3–lok. 235 par. 1)

No. 4: Ndenge oyo tomonisaka limemya mpo na likabo ya bomoi

4 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 1-4 Loyembo 106

Toli mpo na koloba malamu: Koloba ndenge omeseni koloba na makita (be lok. 129 par. 2–lok. 130 par. 1)

No. 1: Ndenge oyo okosala mpo omipesa na kotánga (be lok. 23 par. 4–lok. 26 par. 4)

No. 2: Baloma 2:1-24

No. 3: Ozalaká na bomoi liboso ya kobotama?

No. 4: Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosambela Malia to kopesa ye lokumu koleka bato mosusu? (rs lok. 235 par. 3–lok. 236 par. 2)

11 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 5-8 Loyembo 179

Toli mpo na koloba malamu: Koloba ndenge omeseni koloba ntango ozali kotánga liboso ya bato mingi (be lok. 130 par. 2-4)

No. 1: ‘Mapamboli ezali na moyengebene’ (w01 15/7 nk. 24-27)

No. 2: Baloma 5:6-21

No. 3: hOndimelaka ngɔndɔ Malia? (rs lok. 236 par. 3–lok. 237 par. 1)

No. 4: Osengeli kondima liteya oyo elobi ete molimo ebotamaka mbala na mbala na nzoto mosusu?

18 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 9-12 Loyembo 206

Toli mpo na koloba malamu: Bopɛto na biso epesaka lokumu na nsango oyo tozali komema (be lok. 131 par. 1-3)

No. 1: Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba (w01 1/8 nk. 19-22)

No. 2: w01 15/8 lok. 21 par. 10-lok. 22 par. 13

No. 3: Bato babongolá makambo oyo ezali na Biblia?

No. 4: Ezali solo ete limpa na vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Yesu? (rs lok. 245 par. 2–lok. 247 par. 1)

25 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 13-16 Loyembo 43

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge oyo kolekisa ndelo te mpe kozala na makanisi malamu etindaka biso tólata mpe tóbongisa nsuki na ndenge moko ya malamu (be lok. 131 par. 4–lok. 132 par. 3)

Bozongeli ya koloba

1 Sɛt. Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 1-9 Loyembo 48

Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kolata malamu (be lok. 132 par. 4–lok. 133 par. 1)

No. 1: Ndenge ya koyekola (be lok. 27 par. 1−lok. 31 par. 2)

No. 2: 1 Bakolinti 3:1-23

No. 3: Maloba ya Yoane 6:53-57 elimboli nini? (rs lok. 247 par. 2-3)

No. 4: Bobola epesi moto nzela ayibaka?

8 Sɛt. Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 10-16 Loyembo 123

Toli mpo na koloba malamu: Elateli mpe monzɛlɛ ya malamu ekobɛtisa bato libaku te (be lok. 133 par. 2-4)

No. 1: Longolá mabaku oyo ezali kopekisa yo kokola! (w01 1/8 nk. 28-30)

No. 2: 1 Bakolinti 12:1-26

No. 3: Mpo na nini Nzambe atikaka makambo mabe esalemaka?

No. 4: Yesu abandisaki molulu ya Misa? (rs lok. 247 par. 4–lok. 249 par. 4)

15 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 1-7 Loyembo 16

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kotɛlɛma malamu liboso ya bato mpe bisaleli ya pɛto (be lok. 133 par. 5–lok. 134 par. 4)

No. 1: Ndenge ya kozala na bolenge ya malamu (w01 15/8 nk. 4-7)

No. 2: 2 Bakolinti 6:1–7:1

No. 3: Lolenge oyo moklisto asengeli kotalela bakonzi ya Leta (rs lok. 263 par. 3-lok. 264 par. 2)

No. 4: Nzambe amibanzabanzaka ndenge oyo mai, mopɛpɛ, mpe bazamba ezali kobeba?

22 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 8-13 Loyembo 207

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosilisa kobanga ntango ozali koloba (be lok. 135 par. 1–lok. 137 par. 2)

No. 1: Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu (w01 1/9 nk. 27-30)

No. 2: 2 Bakolinti 8:1-21

No. 3: Nini ekómelaka molimo nsima ya liwa

No. 4: Mikapo oyo moklisto atalelaka mpo na likambo ya bitumba (rs lok. 264 par. 3-lok. 265 par. 3)

29 Sɛt. Botángi ya Biblia: Bagalatia 1-6 Loyembo 163

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge oyo okoki koyeba koloba kozanga kobanga (be lok. 137 par. 3–lok. 138 par. 4)

No. 1: Ntina monene ya badati ya sikisiki (si nk. 282-283 par. 27-30)

No. 2: w01 1/9 lok. 15 par. 8–lok. 17 par. 11

No. 3: Mpo na makambo nini Yehova apesaki Bayisalaele nzela bábunda bitumba? (rs lok. 265 par. 4–lok. 266 par. 4)

No. 4: Ndenge oyo toyebi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela

6 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Baefese 1-6 Loyembo 99

Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kosalela mikro (be lok. 139 par. 1–lok. 140 par. 2)

No. 1: Koyekola epesaka mbano (be lok. 31 par. 3–lok. 32 par. 3)

No. 2: Baefese 2:1-22

No. 3: Ntina oyo ebongi kondimela Nzambe

No. 4: Mikapo nini moklisto atalelaka na likambo ya kokɔta na makambo ya politiki? (rs lok. 267 par. 1–5)

13 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Bafilipi 1-4–Bakolose 1-4 Loyembo 105

Toli mpo na koloba malamu: Salelá mikro malamu (be lok. 140 par. 3–lok. 142 par. 2)

No. 1: Tambolá na ‘nzela ya sembo’ (w01 15/9 nk. 24-28)

No. 2: Bafilipi 2:1-24

No. 3: Mikapo nini moklisto atalelaka na likambo etali milulu ya ekólo? (rs lok. 268 par. 1–lok. 269 par. 1)

No. 4: Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?

20 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Batesaloniki 1-5–2 Batesaloniki 1-3 Loyembo 145

Toli mpo na koloba malamu: Kosalela Biblia mpo na kopesa biyano (be lok. 143 par. 1-3)

No. 1: Ndenge oyo Yehova atalelaka ntango (si nk. 283-284 par. 31-33)

No. 2: w01 15/10 lok. 23 par. 6–lok. 24 par. 9

No. 3: Banani bakokende na likoló?

No. 4: Lokola baklisto bakɔtaka na makambo ya mokili te, elingi koloba ete bamibanzabanzaka te mpo na bolamu ya bazalani na bango? (rs lok. 269 par. 2)

27 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Timote 1-6–2 Timote 1-4 Loyembo 46

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge nini kosalela Biblia malamu lisusu? (be lok. 144 par. 1-4)

Bozongeli ya koloba

3 Nov. Botángi ya Biblia: Tito 1-3–Filemona 1-25 Loyembo 30

Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato básalela Biblia (be nk. 145-146)

No. 1: Ndenge ya kolukaluka na kati ya Biblia (be lok. 33 par. 1–lok. 35 par. 2)

No. 2: Filemona 1-25

No. 3: Tokolɛmba te kozala na bomoi ya kokoka?

No. 4: Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli nkombo Yehova na Makomami ya Grɛki ya boklisto? (rs lok. 410 par. 1-3)

10 Nov. Botángi ya Biblia: Baebele 1-8 Loyembo 149

Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ malamu liboso ya kotánga yango (be lok. 147 par. 1–lok. 148 par. 2)

No. 1: Enoka atambolaki elongo na Nzambe na kati ya mokili moko ya mabe (w01 15/9 nk. 29-31)

No. 2: Baebele 2:1-18

No. 3: iEyano tokopesa na bato oyo balobaka ete, ‘Bozali na Biblia ya bino moko’ (rs lok. 411 par. 1-4)

No. 4: Ndenge nini bakosambisa basekwi na kotalela misala na bango?

17 Nov. Botángi ya Biblia: Baebele 9-13 Loyembo 144

Toli mpo na koloba malamu: Kopona maloba oyo ebongi liboso ya kotánga vɛrsɛ (be lok. 148 par. 3–lok. 149 par. 3)

No. 1: Kozala sembo elimboli nini? (w01 1/10 nk. 20-23)

No. 2: Baebele 9:11-28

No. 3: Bikelamu ya Nzambe oyo bizalaka na likoló bizalaka na kati ya ebongiseli moko? (rs lok. 270 par. 2-3)

No. 4: Ntina oyo kozala na etamboli oyo esepelisaka Nzambe ememaka matomba

24 Nov. Botángi ya Biblia: Yakobo 1-5 Loyembo 88

Toli mpo na koloba malamu: Konyata maloba ya ntina esɛngi mpe komonisa mayoki na yo (be lok. 150 par. 1-2)

No. 1: Bomonisi ntango oyo makambo masalemaki kati na elekelo ya ntango (si nk. 284-285 par. 1-4)

No. 2: w01 1/11 lok. 12 par. 15–lok. 13 par. 19

No. 3: Ntina ya kozala na bopɔlɔ

No. 4: Ndenge nini Nzambe azalaki koyebisa basaleli na ye ya kala malako na ye? (rs lok. 270 par. 4-lok. 271 par. 1)

1 Des. Botángi ya Biblia: 1 Petelo 1-5–2 Petelo 1-3 Loyembo 54

Toli mpo na koloba malamu: Konyata maloba oyo ebongi (be lok. 150 par. 3–lok. 151 par. 2)

No. 1: Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu (be lok. 35 par. 3–lok. 38 par. 4)

No. 2: 1 Petelo 1:1-16

No. 3: Biblia emonisi ete baklisto ya solo bakozala na kati ya ebongiseli moko? (rs lok. 271 par. 3-lok. 272 par. 3)

No. 4: Ndenge oyo mbeka ya lisiko oyo Klisto apesaki esengeli kobongola bomoi na biso

8 Des. Botángi ya Biblia: 1 Yoane 1-5; 2Yn 1-13; 3Yn 1-14–Yuda 1-25 Loyembo 22

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya konyata maloba ya ntina (be lok. 151 par. 3–lok. 152 par. 5)

No. 1: Batelá lisosoli na yo (w01 1/11 nk. 4-7)

No. 2: 1 Yoane 3:1-18

No. 3: Ntina oyo tosengeli te kopesa Biblia foti na likambo etali konyokola basi

No. 4: Okoki kokuta basaleli ya sembo ya Nzambe na mangomba nyonso ya boklisto? (rs lok. 272 par. 4-lok. 273 par. 2)

15 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 1-6 Loyembo 219

Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ (be lok. 153 par. 1–lok. 154 par. 3)

No. 1: Kondima ya Noa ekweisi mokili (w01 15/11 nk. 28-31)

No. 2: Emoniseli 2:1-17

No. 3: Ndenge nini tokoki koyeba ebongiseli ya Yehova oyo ezali awa na mabele? (rs lok. 273 par. 3–9)

No. 4: Ntina oyo baklisto basengeli kosala fɛti ya Noele te

22 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 7-14 Loyembo 6

Toli mpo na koloba malamu: Monisá polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ (be lok. 154 par. 4–lok. 155 par. 4)

No. 1: Okoki komibatela mpo motema na yo ya elilingi ekangama te (w01 1/12 nk. 9-13)

No. 2: w01 15/12 lok. 17 par. 10–lok. 18 par. 13 (tángá mpe maloba na nse ya lokasa)

No. 3: Ndenge oyo tokoki kotɛmɛla masɛnginya ya baninga na biso

No. 4: Ndenge nini tokoki komonisa ete tomemyaka ebongiseli ya Yehova? (rs lok. 274 par. 1-5)

29 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 15-22 Loyembo 60

Toli mpo na koloba malamu: Kosolola na bato na lisalisi ya Makomami (be lok. 155 par. 5–lok. 156 par. 5)

Bozongeli ya koloba

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekopesama kaka na ndeko mobali.

b Ekopesama kaka na ndeko mobali.

c Ekopesama kaka na ndeko mobali.

d Ekopesama kaka na ndeko mobali.

e Ekopesama kaka na ndeko mobali.

f Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

g Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

h Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

i Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe, mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto