Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuli
“Okanisi ete bato mabe bazwaka etumbu na lifelo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi polele etumbu oyo lisumu epesaka. [Tángá Baloma 6:23a.] Na bongo, lifelo ezali nde esika oyo bato banyokwamaka na kati ya mɔtɔ? Ezali kaka ezaleli ya bato oyo bazali mosika na Nzambe? Zulunalo oyo epesi biyano ya Makomami na mituna yango.”
Lamuká! 22 Yuli
“Bato mingi bazwaka masano ya mbongo lokola lolenge moko ya kolekisa ntango oyo bato nyonso bandimaka. Bamosusu bakanisaka ete masano yango ya mbongo etyaka mabota mpe bato nyonso na mpasi. Lamuká! oyo elobeli masano ya mbongo na kotalela makambo oyo bato ya mayele bayekoli mpe bauti kobimisa na mikanda mpo na momeseno yango. Ntango mosusu okosepela mpe kotánga Biblia mpo na koyeba ndenge nini mitinda na yango elobeli likambo yango.” Na ndakisa, tángá 1 Timote 6:10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Bato mingi bakanisaka ete biyambayamba ezali bobele masɛki mpamba. [Na biyambayamba oyo ezali na etanda na lokasa 5, lakisá ye moko to mibale.] Omituná naino te soki makanisi wana eutaka wapi? [Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá 2 Bakolinti 11:14.] Zulunalo oyo emonisi ndenge oyo Biblia etalelaka biyambayamba.”
Lamuká! 8 Aug.
“Bato ebele bazali komitungisa mingi na komona ndenge mobulu mpe terorisme ekómi mingi. Ntango mosusu yo mpe okondima maloba oyo ezali na Mosakoli 8:9. [Tángá mpe tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo emonisi liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo esalemaki na bambula oyo eleki mpe emonisi ndenge nini mosika te bokonzi ya ndenge wana ekosuka.”